42
Bandeko ya Jozefi bakei na Ejipito
Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, alobaki na bana na ye ya mibali : « Mpo na nini bozali kotalana bino na bino ? Nayoki ete ble ezali na Ejipito. Bokende kuna mpe bosomba ndambo mpo na biso mpo ete towumela na bomoi mpe tokufa te na nzala. »
Bandeko mibali zomi ya Jozefi bakendeki na Ejipito mpo na kosomba ble. Kasi Jakobi atikaki te Benjame, ndeko ya Jozefi ya mobali, ete akende elongo na bango, pamba te azalaki kobanga ete likama ekweyela ye.
Kati na bato oyo bakendeki kosomba ble na Ejipito, bana mibali ya Isalaele mpe bazalaki ; pamba te nzala makasi ekotaki mpe na mokili ya Kanana.
Jozefi azalaki moyangeli ya mokili. Ye nde azalaki koteka ble epai ya bato na ye nyonso. Bongo tango bandeko ya Jozefi bakomaki, bagumbamaki liboso na ye mpe bakitisaki mito na se. Tango kaka Jozefi amonaki bango, asosolaki mbala moko ete bazali bandeko na ye. Kasi asalaki lokola nde azali mopaya liboso na bango mpe azalaki na maloba makasi epai na bango. Atunaki bango :
— Bowuti wapi ?
Bazongisaki :
— Towuti na mokili ya Kanana ; toyei nde kosomba biloko ya kolia.
Atako Jozefi asosolaki ete bazali bandeko na ye, kasi bango basosolaki ye te. Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango :
— Bino bozali penza banongi ! Boyei nde kotala bisika nini mokili na biso ebatelami malamu te !
10 Bazongisaki :
— Te nkolo na ngai, basali na yo bayei nde kosomba biloko ya kolia. 11 Tozali biso nyonso bana ya moto moko. Basali na yo bazali bato ya sembo, kasi bazali banongi te.
12 Alobaki na bango :
— Te ! Boyei na mokili na biso mpo na kotala bisika oyo ebatelami malamu te !
13 Kasi bango bazongisaki :
— Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale ; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te.
14 Kasi Jozefi alobaki na bango :
— Ezali ndenge kaka nalobaki na bino : bozali banongi. 15 Tala ndenge nakomeka bino : Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te ! 16 Botinda moko kati na bino ete akende kozwa ndeko na bino ya mobali ; mpe bino oyo bokotikala, bokozala na boloko mpo na komeka maloba na bino mpe kotala soki bolobi solo. Soki te, na kombo ya Faraon, bozali banongi !
17 Atiaki bango nyonso na boloko mikolo misato. 18 Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango :
— Nazali moto oyo abangaka Nzambe. Bosala oyo nazali koloba mpe bokozala na bomoi. 19 Soki bozali bato ya sembo, tika ete moko kati na bino atikala awa kati na boloko ; bongo bino bamosusu bokende, bomema ble oyo esengeli mpo na mabota na bino, oyo ezali na nzala makasi. 20 Kasi bomemela ngai leki na bino ya suka. Yango ekolakisa ete bolobaki solo mpe bokokufa te.
Basalaki bongo. 21 Balobanaki bango na bango :
— Solo, tozwi etumbu mpo na makambo oyo tosalaki ndeko na biso ; pamba te tomonaki pasi na ye tango azalaki kobondela biso, kasi toyokaki ye te. Yango wana pasi oyo ekomeli biso.
22 Ribeni alobaki na bango :
— Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye !
23 Bayebaki te ete Jozefi akokaki kososola maloba na bango, mpo ete azalaki kosalela molimboli mpo na kosolola na bango. 24 Jozefi apesaki mokongo, apusanaki mosika mpe abandaki kolela. Bongo azongelaki bango mpe asololaki lisusu na bango. Azwaki Simeoni kati na bango mpe akangaki ye na miso na bango. 25 Jozefi apesaki mitindo ete batondisa ble na basaki na bango, bazongisa mbongo ya moto na moto na saki na ye mpe bapesa bango bilei mpo na nzela. Esalemelaki bango bongo. 26 Batiaki ble na bango likolo ya ba-ane na bango mpe bakendeki.
Bandeko ya Jozefi bazongi na Kanana
27 Na esika oyo batelamaki mpo na kolekisa butu, moko na bango afungolaki saki na ye mpo na koleisa ane na ye mpe amonaki mbongo na ye na moto ya saki na ye. 28 Ayebisaki bandeko na ye :
— Bazongiseli ngai mbongo na ngai, tala yango oyo na saki na ngai !
Mitema na bango ebetaki mpe babandaki kolenga, balobanaki bango na bango :
— Likambo nini oyo Nzambe asali biso !
29 Tango bakomaki epai ya tata na bango Jakobi na mokili ya Kanana, bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango. Balobaki :
30 — Moto oyo azali mokonzi ya mokili alobelaki biso na maloba makasi. Azwaki biso lokola banongi. 31 Kasi tolobaki na ye : « Tozali bato ya sembo, tozali banongi te. 32 Tozalaki bandeko mibali zomi na mibale, bana ya tata moko. Moko azalaka lisusu te mpe oyo ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, na mokili ya Kanana. »
33 Na boye, moto oyo azali mokonzi ya mokili azongiselaki biso : « Tala lolenge nakoyeba ete bozali bato ya sembo : ‹ Botikela ngai awa ndeko moko kati na bino. Bozwa biloko ya kolia oyo esengeli mpo na mabota na bino oyo ezali na nzala makasi mpe bokende. 34 Boyela ngai leki na bino ya suka. Na bongo, nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bato ya sembo ; mpe ngai nakozongisela bino ndeko na bino, sima nakotika bino mpo ete bokoka kosala mombongo na mokili. › »
35 Tango bafungolaki basaki na bango, moko na moko amonaki mbongo na ye na saki. Bango na tata na bango bamonaki mbongo mpe bango nyonso babangaki. 36 Tata na bango Jakobi alobaki na bango :
— Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali : Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame ! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai !
37 Ribeni alobaki na tata na ye :
— Pesa ngai Benjame, mpe nakomemela yo ye. Soki namemeli yo ye te, boma bana na ngai mibale ya mibali.
38 Jakobi azongisaki :
— Te ! Mwana na ngai akokende elongo na bino te. Ndeko na ye ya mobali akufa ; natikala kaka na ye. Soki likama ekweyeli ye na mobembo oyo bozali kokende, wana bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai !