43
Mobembo ya mibale na Ejipito
Nzala makasi ekotaki kati na mokili. Tango libota ya Jakobi baliaki biloko nyonso oyo bamemaki wuta na Ejipito, Jakobi alobaki na bana na ye :
— Bozonga kuna kosomba ndambo ya biloko.
Yuda azongisaki :
— Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te. Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko. Kasi soki otiki ye te, biso mpe tokokende te ; pamba te moto wana ayebisaki biso malamu : « Bokotelema liboso na ngai te soki ndeko na bino azali te. »
Isalaele azongisaki :
— Mpo na nini bosali ngai mabe boye ? Mpo na nini boyebisaki moto wana ete bozali na ndeko mosusu ?
Bazongisaki :
— Moto yango atunaki biso malamu makambo oyo etali biso moko mpe libota na biso. Atunaki biso : « Tata na bino azali nanu na bomoi ? Bozali na ndeko mosusu ya mobali ? » Mpe biso topesaki eyano na mituna na ye. Tokokaki te koyeba ete akoloba na biso : « Boya na ndeko na bino ya mobali awa. »
Yuda ayebisaki tata na ye Isalaele :
— Tata, tika Benjame akende elongo na ngai. Tokotelema mpe tokokende mpo ete biso elongo na yo mpe bana na biso, tozala na bomoi, kasi tokufa te na nzala. Nandimi kobatela ye ; boye okotuna ye na maboko na ngai. Soki nazongiseli yo ye te mpe namemi ye liboso na yo te, tika ete nazala na ngambo epai na yo bomoi na ngai mobimba. 10 Soki towumelaki te, tokokaki kozonga mbala ya mibale.
11 Tata na bango Isalaele alobaki na bango :
— Soki esengeli kozala bongo, wana bosala boye : botia na basaki na bino biloko oyo eleki kitoko kati na mokili mpe bopesa yango lokola kado epai ya moto wana : ndambo ya mafuta ya solo kitoko, ndambo ya mafuta ya nzoyi, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, lodanumi, pisitashi mpe bambuma ya amande. 12 Bozwa mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki kati na basaki na bino mpe bozongisa mbongo oyo bokutaki na basaki na bino ; tango mosusu ezalaki libunga. 13 Bozwa ndeko na bino ya mobali, botelema mpe bozonga epai ya moto wana. 14 Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ayokela bino mawa tango bokotelema liboso ya moto wana, mpo ete bokoka kozwa ndeko na bino mosusu, mpe Benjame azonga elongo na bino. Kasi mpo na ngai, soki nakozanga bana, malamu nazanga bango !
15 Boye bato yango bazwaki bakado ; bazwaki lisusu mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki na basaki na bango mpe Benjame. Bakendeki na Ejipito mpe bamilakisaki na miso ya Jozefi.
Jozefi ayambi bandeko na ye
16 Tango Jozefi amonaki Benjame elongo na bango, alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi na ye : « Mema bato oyo na ndako na ngai ; boboma nyama moko mpe bolamba yango mpo ete bato oyo bakolia elongo na ngai na midi. »
17 Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye mpe amemaki bango na ndako ya Jozefi. 18 Bato yango babangaki makasi tango bamemaki bango na ndako ya Jozefi mpe bazalaki kolobana bango na bango :
— Bamemi biso awa likolo ya mbongo oyo batiaki na basaki na biso, na mbala ya liboso. Bakokweya likolo na biso, bakolonga biso, bakokanga biso lokola bawumbu mpe bakozwa ba-ane na biso.
19 Bapusanaki pembeni ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi mpe balobaki na ye na ekuke ya ndako :
20 — Limbisa biso, nkolo na ngai ! Toyaki mbala ya liboso mpo na kosomba biloko ya kolia ; 21 kasi tango totelemaki na esika ya kolekisa butu, tofungolaki basaki na biso ; mpe moko na moko kati na biso amonaki mbongo na ye kati na saki na ye ndenge kaka ezalaki, yango wana tozongi na yango. 22 Tomemi mbongo mosusu mpo na kosomba biloko ya kolia, toyebi te nani azongisaki mbongo na biso na basaki na biso.
23 Alobaki na bango :
— Malamu ! Bobanga te. Ezali Nzambe na bino, Nzambe ya tata na bino, nde atiaki bomengo kati na basaki na bino. Kasi mpo na mbongo na bino, ngai nazwaki yango.
Sima, amemelaki bango Simeoni. 24 Moto yango akotisaki bango na ndako ya Jozefi, apesaki bango mayi ya kosukola makolo mpe abongisaki bilei mpo na ba-ane na bango. 25 Babongisaki bakado na bango mpo na boyei ya Jozefi na midi, pamba te bayokaki ete bakolia kuna. 26 Tango Jozefi ayaki na ndako, bapesaki ye bakado oyo bamemaki na ndako mpe bagumbamaki liboso na ye mito na se. 27 Atunaki bango :
— Boni, bozali malamu ?
Abakisaki :
— Boni tata na bino ya mobange oyo boyebisaki ngai, azali malamu ?
28 Bazongisaki :
— Mosali na yo, tata na biso, azali nanu na bomoi mpe azali malamu.
Bakitisaki mito mpe bagumbamaki liboso na ye.
29 Tango Jozefi atombolaki miso, amonaki Benjame, ndeko na ye ya mobali, mwana ya mama na ye. Atunaki :
— Ye wana nde ndeko na bino ya suka oyo boyebisaki ngai ?
Abakisaki :
— Tika ete Nzambe atalisa yo ngolu na Ye.
30 Jozefi ayokaki pasi makasi na motema tango amonaki ndeko na ye, akimaki mbangu na libanda mpe alukaki esika mpo na kolela. Akotaki na shambre na ye mpe alelaki kuna. 31 Tango asilisaki kosukola elongi na ye, abimaki libanda, akangaki motema mpe alobaki :
— Botia biloko ya kolia na mesa.
32 Batielaki Jozefi bilei na mesa na ye moko, bandeko na ye mpe na mesa na bango ; bongo bato ya Ejipito oyo bazalaki kolia na ye esika moko, bango mpe na mesa na bango, pamba te bato ya Ejipito bakokaki te kolia esika moko na Ba-Ebre, pamba te ezalaki ekila mpo na bato ya Ejipito. 33 Bavandisaki bango, kobanda na mwana ya liboso kino na oyo ya suka, bazalaki kotalana bango na bango na kokamwa. 34 Jozefi apesaki bango biloko oyo ewutaki na mesa na ye ; mpe Benjame azwaki mbala mitano koleka bango nyonso. Na bongo, bamelaki elongo na ye mpe balangwaki.