46
Jakobi akei na Ejipito
Isalaele akendeki na nyonso oyo azalaki na yango. Tango akomaki na Beri-Sheba, abonzaki mbeka epai ya Nzambe ya Izaki, tata na ye. Na butu, Nzambe alobaki na Isalaele na nzela ya emoniseli :
— Jakobi ! Jakobi !
Jakobi azongisaki :
— Ngai oyo.
Nzambe alobaki :
— Nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo. Kobanga te kokende na Ejipito, pamba te nakokomisa yo ekolo monene kuna. Ngai moko nakokende elongo na yo na Ejipito ; mpe ya solo, nakozongisa yo lisusu. Loboko ya Jozefi ekozipa miso na yo.
Bongo Jakobi alongwaki na Beri-Sheba. Bana mibali ya Isalaele bamatisaki na bashario oyo Faraon atindaki mpo na komema ye : tata na bango Jakobi, bana na bango mpe basi na bango. Bamemaki lisusu bibwele na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango na mokili ya Kanana ; mpe Jakobi elongo na bakitani na ye nyonso bakendeki na Ejipito. Azwaki elongo na ye mpo na kokende na Ejipito : bana na ye ya mibali, bakoko na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi elongo na bakoko na ye ya basi : bakitani na ye nyonso.
Libota ya Jakobi na Ejipito
Tala bakombo ya bana mibali ya Isalaele, oyo bakendeki na Ejipito :
 
Ribeni, mwana liboso ya Jakobi.
Bana mibali ya Ribeni :
Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.
10 Bana mibali ya Simeoni :
Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo babotelaki ye na mwasi ya mokili ya Kanana.
11 Bana mibali ya Levi :
Gerishoni, Keati mpe Merari.
12 Bana mibali ya Yuda :
Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana.
Bana mibali ya Peretsi :
Etsironi mpe Amuli.
13 Bana mibali ya Isakari :
Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi.
14 Bana mibali ya Zabuloni :
Seredi, Eloni mpe Yaleyeli.
15 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami ; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato.
 
16 Bana mibali ya Gadi :
Tsefoni, Agi, Shuni, Etsiboni, Eri, Arodi mpe Areeli.
17 Bana mibali ya Aseri :
Yimina, Yishiva, Yishivi, Beria mpe ndeko na bango ya mwasi Sera.
Bana mibali ya Beria :
Eberi mpe Malikieli.
18 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Zilipa abotelaki Jakobi ; Zilipa azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki zomi na motoba.
 
19 Bana mibali ya Rasheli, mwasi ya Jakobi :
Jozefi mpe Benjame.
20 Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi.
21 Bana mibali ya Benjame :
Bela, Bekeri, Ashibeli, Gera, Namani, Eyi, Roshi, Mupimi, Upime mpe Aridi.
22 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Rasheli abotelaki Jakobi : bango nyonso bazalaki zomi na minei.
 
23 Mwana mobali ya Dani :
Ushimi.
24 Bana mibali ya Nefitali :
Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shilemi.
25 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Bila abotelaki Jakobi ; bango nyonso bazalaki sambo. Bila azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya mwana na ye ya mwasi Rasheli.
 
26 Bato nyonso oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, oyo bazalaki penza bakitani na ye, longola basi ya bana na ye, bango nyonso bazalaki tuku motoba na motoba. 27 Bana mibali ya Jozefi oyo babotamaki na Ejipito bazalaki mibale. Bato nyonso ya libota ya Jakobi oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo.
Jakobi kati na Gosheni
28 Liboso ete Jakobi akutana na Jozefi, atindaki Yuda epai ya Jozefi mpo na kobongisa bokutani na bango na Gosheni. Tango bakomaki na Gosheni, 29 Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi.
30 Isalaele alobaki na Jozefi :
— Sik’oyo, nakoki na ngai kokufa mpo ete namoni yo penza na miso na ngai moko, mpe ozali nanu na bomoi !
31 Jozefi alobaki na bandeko na ye mpe na libota ya tata na ye :
— Nakokende koyebisa Faraon : « Bandeko na ngai mpe libota ya tata na ngai, ba-oyo bavandaka na mokili ya Kanana, bayei epai na ngai. 32 Bazali babateli bibwele, babokolaka bibwele. Bamemi bameme, bantaba, bangombe na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango. » 33 Tango Faraon akobenga bino mpe akotuna bino : « Bosalaka mosala nini ? » 34 Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.