47
Jakobi akomi epai ya Faraon
Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon :
— Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso ; bazali sik’oyo na Gosheni.
Jozefi aponaki bandeko na ye mitano mpe alakisaki bango epai ya Faraon.
Faraon atunaki bandeko ya Jozefi :
— Bosalaka mosala nini ?
Bazongiselaki Faraon :
— Basali na yo bazali babateli bibwele ndenge kaka bakoko na biso bazalaki.
Balobaki lisusu na Faraon :
— Toyei kovanda awa, pamba te nzala makasi ezali kati na mokili ya Kanana mpe matiti ezali lisusu te mpo na bibwele ya basali na yo ; yango wana, tobondeli yo, pesa basali na yo nzela ya kovanda na Gosheni.
Faraon alobaki na Jozefi :
— Tata na yo mpe bandeko na yo bayei epai na yo ; mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko ; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai.
Jozefi amemaki tata na ye mpo na kolakisa ye epai ya Faraon. Tango Jakobi asilisaki kopambola Faraon, Faraon atunaki Jakobi :
— Ozali na mibu boni ?
Jakobi azongiselaki Faraon :
— Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.
10 Jakobi apambolaki Faraon mpe alongwaki liboso na ye.
11 Jozefi avandisaki tata na ye mpe bandeko na ye na Ejipito mpe apesaki bango eteni ya mabele oyo eleki kitoko kati na mokili, na mabele ya Ramisesi, ndenge kaka Faraon atindaki. 12 Jozefi apesaki lisusu biloko ya kolia epai ya tata na ye, bandeko na ye mpe epai ya libota ya tata na ye mobimba kolanda motango ya bana na bango.
Jozefi mpe nzala makasi
13 Biloko ya kolia ezalaki lisusu te kati na mokili mobimba mpe nzala makasi eyaki. Mokili ya Ejipito mpe oyo ya Kanana ekawukaki na nzala makasi. 14 Jozefi azwaki mbongo nyonso oyo azalaki kobomba tango bato ya mokili ya Ejipito mpe ya Kanana bazalaki kosomba ble epai na ye, amemaki yango na ndako ya Faraon. 15 Tango mbongo ya bato ya Ejipito mpe ya Kanana esilaki, bato nyonso ya Ejipito bayaki epai ya Jozefi mpe balobaki :
— Pesa biso biloko ya kolia ! Mpo na nini tokufa na nzala na miso na yo ? Mpo ete mbongo na biso esili ?
16 Jozefi azongisaki :
— Soki bozali lisusu na mbongo te, bomemela ngai bibwele na bino. Bokopesa ngai bibwele na bino na esika ya mbongo.
17 Bamemaki epai ya Jozefi bampunda, bantaba mpe bangombe na bango ; bongo Jozefi apesaki bango bilei na esika ya bampunda, ba-ane, bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Na mibu nyonso wana oyo Jozefi azalaki kopesa bango bilei, bango bazalaki kopesa ye bibwele na bango.
18 Tango mibu wana esilaki, bayaki lisusu epai na ye na mibu oyo elandaki. Balobaki :
— Tokoki kobombela nkolo na biso te ete mbongo na biso esili mpe bibwele na biso ekomi ya yo. Totikali lisusu na eloko moko te longola kaka banzoto na biso mpe mabele na biso. 19 Mpo na nini, biso elongo na mabele na biso, tokufa na miso na yo ? Somba biso kaka elongo na mabele na biso na motuya ya biloko ya kolia ; mpe biso elongo na mabele na biso, tokokoma bawumbu ya Faraon. Toboyi na biso kokufa na nzala, pesa biso milona ya kolona mpo ete tobika mpe mabele na biso ekoma esobe te.
20 Jozefi asombaki mabele nyonso ya Ejipito mpo na Faraon, pamba te bato nyonso ya Ejipito batekaki bilanga na bango mpo ete nzala elekaki makasi. Boye mabele ekomaki ya Faraon. 21 Jozefi akomisaki bavandi ya bingumba nyonso ya Ejipito bawumbu ya Faraon. 22 Kasi asombaki mabele ya banganga-nzambe te, pamba te bazalaki kozwa tango nyonso biloko ebele kolanda mobeko ya Faraon ete bazwaka biloko ya kolia. Yango wana, banganga-nzambe batekaki mabele na bango te.
23 Jozefi alobaki na bato :
— Nasombi bino lelo mpo na Faraon, bino mpe mabele na bino. Tala milona mpo na bino mpo ete bokoka kolona mabele. 24 Kasi tango bokobuka mbuma, bokopesa eteni ya mitano epai ya Faraon. Biteni minei oyo mosusu, bokobomba yango lokola milona mpo na bilanga mpe lokola biloko ya kolia mpo na bino moko, mpo na mabota na bino mpe mpo na bana na bino.
25 Bazongisaki :
— Obikisi bomoi na biso ! Lokola tozwi ngolu na miso na yo nkolo na biso, tokozala bawumbu ya Faraon.
26 Bongo Jozefi akomisaki yango mobeko kino lelo kati na mabele ya Ejipito : eteni ya mitano ya bambuma nyonso oyo ekowuta na mabele ezali mpo na Faraon. Kasi mabele ya Banganga-Nzambe ekomaki ya Faraon te.
27 Boye bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito, na Gosheni. Kuna bakomaki na bozwi ebele, babotaki bana mpe bakomaki ebele.
Kufa ya Jakobi mpe ya Jozefi
28 Jakobi awumelaki mibu zomi na sambo na Ejipito. Mpe mibu ya bomoi na ye ezalaki nkama moko na tuku minei na sambo. 29 Tango mokolo ya kufa ya Isalaele ekomaki pene, abengaki Jozefi, mwana na ye ya mobali, mpe alobaki na ye :
— Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya mopende na ngai ; laka ngai ete okotalisa ngai bolamu mpe boyengebene, mpe okokunda ngai na Ejipito te. 30 Kasi tango nakolala elongo na bakoko na ngai, okobimisa ngai na Ejipito mpe okokunda ngai na esika oyo bakunda bango.
Jozefi azongisaki :
— Nakosala ndenge olobi.
31 Bongo Jakobi alobaki lisusu :
— Lapa ndayi mpo na kolakisa ete okosala ndenge olobi.
Boye, Jozefi alapaki ndayi na miso na ye ; mpe Isalaele agumbamaki na koyekama na moto ya mbeto na ye.