49
Jakobi apamboli bana na ye ya mibali
Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki :
— Bosangana mpo ete nakoka koyebisa bino makambo oyo ekokomela bino na mikolo oyo ekoya. Bosangana mpe boyoka, bana mibali ya Jakobi ! Boyoka oyo tata na bino Isalaele akoloba :
 
« Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso,
makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai ;
oleki na lokumu mpe na nguya.
Mobulu lokola mayi, okokende liboso te,
pamba te omataki na mbeto ya tata na yo,
esika oyo ngai nalalaka,
mpe okomisi yango mbindo.
 
Simeoni mpe Levi bazali bandeko,
mipanga na bango ezali bibundeli mpo na kotia mobulu.
Molimo na ngai, kosangana te
na mabongisi na bango ya kosala mabe !
Lokumu na ngai, kokota te
na lisanga na bango !
Pamba te na kanda na bango, babomaki bato ;
mpe na esengo na bango, basepelaki kokata
misisa ya makolo ya bangombe ya mibali.
Tika ete kanda na bango elakelama mabe,
pamba te ezali makasi !
Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe,
pamba te ezanga mawa !
Nakokabola bango na Jakobi
mpe nakopanza bango kati na Isalaele.
 
Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo,
loboko na yo ekozala na kingo ya banguna na yo ;
bana mibali ya tata na yo bakogumbama liboso na yo.
Yuda, ozali mwana ya nkosi ;
mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila.
Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali ;
mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye ?
10 Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda,
lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye,
kino tango nkolo na ye akoya,
nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.
11 Akokanga ane na ye na nzete ya vino,
mpe mwana ya ane na etape oyo ye akopona ;
akosukola bilamba na ye na vino ;
mpe kazaka na ye, na masanga ya vino ya motane.
12 Miso na ye ekozala motane koleka vino,
mpe minu na ye ekozala pembe koleka miliki.
 
13 Zabuloni akowumela pene ya ebale monene,
eteni ya mabele na ye ekozala libongo ya masuwa,
mpe mabele na ye ekokende kino na Sidoni.
 
14 Isakari azali ane ya makasi
oyo elali kati na mapango mibale.
15 Amonaki ete bopemi ezali malamu,
mpe mokili na ye ezali kitoko ;
boye mapeka na ye ekomema mikumba
mpe abongi mpo na misala ya bowumbu.
 
16 Dani akokamba bato na ye
lokola moko kati na bikolo ya Isalaele.
17 Dani akozala lokola nyoka na balabala
to lokola etupa na nzela,
oyo eswaka litindi ya mpunda
mpo ete motambolisi na yango akweya.
 
18 Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai !
 
19 Gadi, banguna ebele bakobundisa ye,
kasi ye mpe akobundisa bango kino kobengana bango.
 
20 Bilei oyo ekobima na mokili ya Aseri
ekozala ebele penza ;
mabele na ye ekobota biloko
oyo ebongi mpo na bakonzi.
 
21 Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi,
oyo ebotaka bana kitoko.
 
22 Jozefi azali lokola nzete oyo ebotaka mbuma mingi,
nzete oyo ezalaka pembeni ya etima,
mpe oyo bitape na yango elekaka bosanda ya mir.
23 Banguna batumbolaki ye,
babwakelaki ye makonga mpe babundisaki ye ;
24 kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye,
mpe maboko na ye etikalaki kolenga te
mpo na loboko ya Elombe ya Jakobi,
oyo azali Mobateli mpate, Libanga ya Isalaele.
25 Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo !
mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo,
apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo ;
na mapamboli ya bozindo, na se ;
na mapamboli ya mabele mpe ya libumu.
26 Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya
koleka mapamboli ya bangomba ya kala,
koleka bomengo ya bangomba mike ya kala ;
tika ete mapamboli nyonso ekita na moto ya Jozefi,
ekitela ye oyo atombolami kati na bandeko na ye !
 
27 Benjame azali lokola mbwa ya zamba ;
na tongo, apasolaka mosuni na ye ;
na pokwa, akabolaka bomengo ya bitumba. »
28 Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele ; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.
Kufa ya Jakobi
29 Jakobi apesaki bango malako oyo : « Nakomi pene ya kokende kokutana na batata na ngai. Bokunda ngai esika moko na bango, na lilita oyo ezali na elanga ya Efroni, moto ya Iti, 30 kati na lidusu ya mabanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, na mokili ya Kanana, elanga oyo Abrayami asombaki na Efroni, moto ya Iti, lokola lilita. 31 Ezalaki kuna nde bakundaki Abrayami mpe Sara, mwasi na ye ; Izaki mpe Rebeka, mwasi na ye. Ezali kuna nde ngai nakundaki Lea. 32 Elanga mpe lidusu ya mabanga oyo ezali kati na yango esombamaki epai ya bato ya Iti. »
33 Tango Jakobi asilisaki kopesa malako epai ya bana na ye, asembolaki makolo na ye na mbeto, akataki motema mpe akendeki kokutana na batata na ye.