48
Manase mpe Efrayimi
Sima na makambo wana, bayaki koyebisa Jozefi : « Tala, tata na yo azali kobela. » Jozefi azwaki bana na ye mibale ya mibali : Manase mpe Efrayimi. Bapesaki sango epai ya Jakobi ete mwana na ye ya mobali Jozefi azali koya epai na ye. Isalaele asalaki makasi mpe avandaki na mbeto. Jakobi alobaki na Jozefi :
— Nzambe-Na-Nguya-Nyonso abimelaki ngai na Luze, na mokili ya Kanana ; mpe kuna, apambolaki ngai. Alobaki na ngai : « Nakopesa yo mabota mpe nakokomisa yo ebele ; nakokomisa yo lisanga ya bikolo ebele mpe nakopesa mokili oyo lokola libula ya seko na seko epai ya bakitani na yo sima na yo. » Mpe sik’oyo, bana na yo ya mibali oyo babotamaki na Ejipito liboso ete ngai naya awa, bakomi lokola bana na ngai. Efrayimi mpe Manase bakomi bana na ngai lokola Ribeni mpe Simeoni. Bana oyo okobota sima na bango bakozala ya yo ; bakozwa eteni na bango ya libula na kombo ya bayaya na bango. Pamba te, tango nawutaki na Padani, Rasheli akufaki na nzela, na maboko na ngai, wana nazalaki kokende na mokili ya Kanana, pene ya Efrata ; nakundaki ye kuna pembeni ya Efrata oyo babengaka Beteleemi.
Tango Isalaele amonaki bana mibali ya Jozefi, atunaki :
— Ba-oyo bazali banani ?
Jozefi azongiselaki tata na ye :
— Bazali bana mibali oyo Nzambe apesi ngai awa.
Isalaele alobaki :
— Pusa bango mpo ete napambola bango.
10 Miso ya Isalaele elembaki mpo na kimobange mpe azalaki komona lisusu malamu te. Yango wana, Jozefi apusaki bana na ye ya mibali pembeni ya tata na ye, Isalaele apesaki bango beze mpe ayambaki bango.
11 Isalaele alobaki na Jozefi :
— Nazalaki na elikya te ete nakomona lisusu elongi na yo ; kasi sik’oyo Nzambe apesi ngai nzela ya komona kutu bana na yo.
12 Jozefi alongolaki bana na ye na mabolongo ya Isalaele mpe agumbamaki elongi na ye kino na se. 13 Jozefi azwaki bango mibale : Efrayimi na loboko na ye ya mobali, loboko ya mwasi ya Isalaele ; mpe Manase, na loboko na ye ya mwasi, loboko ya mobali ya tata na ye. Apusaki bango pembeni ya Isalaele. 14 Isalaele asembolaki loboko na ye ya mobali mpe atiaki yango likolo ya moto ya Efrayimi oyo azalaki leki ; mpe loboko na ye ya mwasi likolo ya moto ya Manase. Na bongo, abongolaki maboko na ye mpo ete Manase azalaki mwana ya liboso.
15 Isalaele apambolaki Jozefi mpe alobaki :
Tika ete Nzambe oyo, liboso na Ye,
bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki, batambolaki,
Nzambe oyo azali Mobateli na ngai
wuta mokolo ya mbotama na ngai kino na mokolo ya lelo,
16 anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso,
apambola bana oyo ya mibali !
Tika ete babengama na kombo na ngai,
mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki !
Tika ete bakoma ebele kati na mokili !
17 Tango Jozefi amonaki ete tata na ye atiaki loboko na ye ya mobali na moto ya Efrayimi, asepelaki te. Azwaki loboko ya tata na ye, alongolaki yango na moto ya Efrayimi mpo na kotia yango na moto ya Manase. 18 Jozefi alobaki na tata na ye :
— Boye te, tata na ngai ! Oyo azali mwana ya liboso ; tia loboko na yo ya mobali likolo ya moto na ye.
19 Kasi tata na ye aboyaki mpe alobaki :
— Nayebi, mwana na ngai ! Nayebi ! Ye mpe akokoma ekolo, akokoma monene. Nzokande, leki na ye akozala monene koleka ye mpe bakitani na ye bakokoma lisanga ya bikolo.
20 Apambolaki bango wana mpe alobaki :
Bato ya Isalaele bakotangaka bakombo na bino
mpo na kopambola :
« Tika ete Nzambe akomisa bino lokola Efrayimi mpe Manase ! »
Boye Isalaele atiaki Efrayimi liboso ya Manase.
21 Bongo Isalaele alobaki na Jozefi :
— Etikali moke nakufa. Nzambe akozala na bino mpe akozongisa bino na mokili ya bakoko na bino. 22 Mpo na ngai, napesi yo koleka oyo napesaki epai na bandeko na yo : eteni ya mabele oyo nabotolaki, na mopanga mpe na tolotolo na ngai, epai ya bato ya Amori.