2
Kozwa na motuya lobiko kowuta na Mwana
Yango wana, tosengeli kozwa lisusu na motuya makasi mateya oyo toyokaki mpo ete tobunga te. Pamba te soki sango oyo epesamaki, na tango ya kala, na nzela ya ba-anjelu, ezalaki na motuya makasi na ndenge ete bato oyo batiolaki yango mpe batosaki yango te bazwaki etumbu oyo ekokaki mpo na bango, ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango. Nzambe mpe azalaki kokokisa bosolo ya litatoli na bango na nzela ya bilembo ya kokamwa, na nzela ya misala minene, ya bikamwa ya ndenge na ndenge mpe ya makabo ya Molimo Mosantu, oyo azalaki kopesa bango kolanda mokano na Ye.
Nyonso ezali na se ya Bokonzi ya Mwana
Nzambe atiaki te mokili oyo ezali koya, mokili oyo tozali kolobela, na se ya bokonzi ya ba-anjelu. Nzokande, ezali na moko oyo atatolaki boye kati na Makomi :
« Moto azali nini mpo ete okanisa ye ?
Mwana na moto azali nani mpo ete obatela ye ?
Okitisaki ye na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke,
kasi olatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu,
mpe otiaki biloko nyonso
na se ya matambe na ye. »
Awa Nzambe atiaki nyonso na se ya bokonzi na ye, atikaki ata eloko moko te oyo ezangaki kozala na se ya bokonzi na ye. Nzokande, ezali solo ete, kino sik’oyo, tomoni nanu te ete nyonso ezali na se ya bokonzi na ye. Kasi tala makambo oyo tozali komona : Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.
Mwana na Nzambe azali ndeko ya bato nyonso
10 Emonanaki malamu ete, mpo na komema bana ebele na nkembo, Nzambe oyo akela biloko nyonso mpe azali Nkolo na yango akomisa ya kokoka na nzela ya pasi, mokonzi oyo asengelaki komema bango na lobiko. 11 Pamba te Mobulisi ya basumuki mpe bato oyo babulisami bazali kaka na Tata moko. Yango wana Yesu azalaki na soni te ya kobenga bango bandeko na Ye, 12 tango alobaki :
« Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na Ngai,
nakokumisa Yo na banzembo kati na mayangani. »
13 Yesu alobaki lisusu :
« Nakotia elikya na Ngai kati na Ye ; »
Mpe lisusu :
« Ngai oyo, Ngai elongo na bana oyo Nzambe apesa Ngai. »
14 Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa, 15 mpe akangola bato nyonso oyo, bomoi na bango mobimba, bakomaki bawumbu likolo na kobanga kufa.
16 Pamba te ezali penza ya solo ete Yesu ayaki te mpo na kosunga ba-anjelu, kasi mpo na kosunga nde bakitani ya Abrayami. 17 Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato. 18 Pamba te, lokola Ye moko amonaki pasi tango amekamaki, akoki mpe kosunga bato oyo bazali komekama.