3
Yesu aleki Moyize
Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe. Solo, azali sembo na miso ya Nzambe oyo aponaki Ye, ndenge Moyize azalaki sembo kati na Ndako mobimba ya Nzambe. Yesu amonanaki ete akoki mpo na kozwa lokumu monene koleka Moyize ; ndenge moko mpe motongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko. Pamba te, ezali na ndako moko te oyo ezangi motongi ; nzokande Nzambe azali motongi ya biloko nyonso.
Moyize azalaki sembo lokola mosali kati na Ndako mobimba ya Nzambe, mpo na kotatola na tina na makambo oyo Nzambe akoloba na mikolo oyo ezalaki kolanda. Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso.
Bopemi ya bandimi ya Nzambe
Yango wana, kolanda ndenge Molimo Mosantu alobi :
« Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
boyeisa mitema na bino mabanga te,
ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe,
na mokolo ya komekama kati na esobe
epai wapi batata na bino bamekaki ngai
mpe balukaki kotala mozindo ya motema na ngai
atako bamonaki misala na ngai
10 mibu tuku minei.
Yango wana, natombokelaki bato ya ekeke wana
mpe nalobaki :
‹ Mitema na bango ezali kobeba tango nyonso,
mpe bayebaki banzela na ngai te. ›
11 Boye, kati na kanda na ngai, nakataki seleka :
‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › »
12 Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi ; 13 kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga. 14 Pamba te tozali solo lisanga na Klisto soki tosimbi makasi, kino na suka, elikya oyo tozwaki wuta na ebandeli, 15 kolanda ndenge elobama :
« Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,
boyeisa mitema na bino mabanga te,
ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe. »
16 Banani bayokaki mongongo ya Nzambe mpe batombokelaki Ye ? Ezali te bato nyonso oyo Moyize abimisaki na Ejipito ? 17 Asilikelaki banani mibu tuku minei ? Ezali te bato oyo basalaki masumu, oyo bibembe na bango ekweyaki kati na esobe ? 18 Epai ya banani Nzambe akataki seleka ete bakokota te kati na bopemi na Ye ? Ezali te epai ya bato oyo baboyaki kotosa Ye ?
19 Boye, tomoni ete balongaki te kokota mpo ete bazangaki kondima.