Bonganga-Nzambe ya Klisto
5
Klisto, Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe Mopesi lobiko
Mokonzi nyonso ya Banganga-Nzambe aponamaka kati na bato mpe, lokola mosali ya Nzambe, atiamaka mpo na bolamu ya bato kati na makambo oyo etali boyokani na bango elongo na Nzambe. Mosala na ye ezali : kobonzela Nzambe makabo mpe bambeka mpo na masumu ya bato. Azali na makoki ya kozala na boboto liboso ya bolembu ya bato oyo bazangi boyebi mpe basalaka masumu, pamba te ye moko mpe azali moto na bolembu. Yango wana, likolo ya bolembu yango, asengeli kaka te kobonzaka mbeka mpo na masumu ya bato, kasi asengeli mpe kobonzaka yango mpo na masumu na ye moko.
Moto moko te akoki komikomisa mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde akomisaka moto mokonzi ya Banganga-Nzambe soki mpe kaka abengi ye, ndenge ezalaki mpo na Aron. Ndenge moko mpe mpo na Klisto : amikomisaki te Mokonzi ya Banganga-Nzambe, kasi ezali Nzambe nde alobaki na Ye :
« Ozali Mwana na Ngai ;
na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »
Mpe, na esika mosusu kati na Makomi, alobaki :
« Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela,
kolanda molongo ya Melishisedeki. »
Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye. Atako azalaki Mwana na Nzambe, kasi ayekolaki botosi na nzela ya pasi nyonso oyo amonaki. Mpe tango kaka Nzambe akomisaki Ye ya kokoka, akomaki, mpo na bato nyonso oyo batosaka Ye, Mopesi lobiko ya seko ; 10 pamba te Nzambe atia Ye Mokonzi ya Banganga-Nzambe, kolanda molongo ya Melishisedeki.
Bilei ya mikolo
11 Tozali na makambo mingi ya koloba na tina na likambo oyo, kasi ezali pasi mpo na kolimbola yango mpo ete bososolaka lisusu noki te. 12 Bosengelaki wuta kala kokoma balakisi ; kasi kino sik’oyo, bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba na Nzambe. Bokomi kutu na posa ya miliki, kasi ya bilei ya makasi te. 13 Nzokande, moto nyonso oyo atikalaka kaka na miliki azali mwana moke mpe ayebi te liloba oyo eteyaka bosembo. 14 Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.