6
Yango wana, tokota na mateya oyo ekoki mpo na mikolo ; tolekisa tango te na mateya ya ebandeli na tina na Klisto, mpe tozongela te mateya lokola kobongola motema, kotika misala oyo ememaka na kufa, kondima kati na Nzambe, ndenge nyonso ya kobatisa, kotiela bato maboko, lisekwa ya bakufi, mpe etumbu ya seko. Soki Nzambe apesi biso nzela, tokomipesa nde na mateya oyo ekoki mpo na mikolo.
Solo, ekoki kosalema te ete bato oyo Nzambe angengisaki na pole na Ye, oyo bamekaki elengi ya likabo ya Lola, oyo basanganaki na Molimo Mosantu, oyo bamekaki elengi ya bolamu ya Liloba na Nzambe, oyo bamekaki nguya ya mokili oyo ezali koya, ekoki kosalema te ete bateya bango lisusu mateya ya kobongola lisusu mitema soki bakweyi na masumu, pamba te bazali lisusu kobaka Mwana na Nzambe na ekulusu, mpo na bango moko, mpe kosambwisa Ye na miso ya bato.
Tango mabele oyo enokelaka mvula emelaka mayi mpe ebotaka matiti ya tina mpo na bato oyo baloneli yango, Nzambe apambolaka yango. Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka lisusu na tina te, ezalaka mosika te ya kolakelama mabe, mpe esukaka na kozika na moto.
Atako tolobi bongo, balingami na ngai, tondimisami penza na tina na bino ete tozali kozela lokola libula biloko ya malamu koleka, biloko oyo ememaka na lobiko. 10 Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu. 11 Kasi tolingi ete moto nyonso kati na bino akoba kolakisa bolingo yango kino na suka mpo ete makambo oyo bozali kotiela elikya ekokisama solo. 12 Tolingi te ete bokoma bagoyigoyi, kasi bomekola bato oyo bazwaka, na nzela ya kondima mpe kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.
Elikya ya solo
13 Tango Nzambe apesaki Abrayami elaka, akataki seleka na Kombo na Ye moko, pamba te ezali na moto moko te oyo aleki Nzambe mpo ete Ye Nzambe akata seleka na kombo na ye. 14 Alobaki : « Nakopambola yo solo mpe nakopesa yo bakitani ebele. » 15 Yango wana, Abrayami akangaki motema mpe azwaki oyo Nzambe alakaki ye.
16 Nzokande, bato bakataka seleka na kombo ya moto oyo aleki bango, mpe seleka ezalaka ndanga oyo esukisaka tembe nyonso. 17 Yango wana, Nzambe akataki seleka mpo na kolakisa na bato oyo bazwaki elaka ete akobongola mokano na Ye te. 18 Mpo na yango, mpo ete, biso bato oyo totika nyonso mpo na kosimba elikya ete tokozwa biloko oyo alakaki biso, tolendisama makasi, Nzambe asalelaki makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.
19 Mpo na biso, elikya yango ezali lokola longo ya bomoi na biso ; epolaka te mpe esimba biso makasi, ekota kino koleka rido, kati penza na Esika-Oyo-Eleki-Bule 20 epai wapi Yesu akotaki mpo na biso lokola moto ya liboso, pamba te akomaki Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpo na libela, kolanda molongo ya Melishisedeki.