Ezayi
1
Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.
Masakoli na tina na Yuda mpe Isalaele
Isalaele atombokeli Yawe
Oh Lola, yoka !
Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka !
Pamba te Yawe nde azali koloba :
« Nabokoli bana mpe nakolisi bango,
kasi batombokeli Ngai.
Ngombe eyebi nkolo na yango,
ane mpe eyebi elielo oyo nkolo na yango
apeselaka yango bilei ;
kasi Isalaele ayebi te,
bato na Ngai basosoli te. »
 
Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu,
bato oyo batonda na mabe,
libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe !
Batiki Yawe,
batioli Mosantu ya Isalaele
mpe bapesi Ye mokongo.
 
Boni, babeta bino lisusu wapi,
bino bato oyo botingami kaka na botomboki ?
Moto na yo mobimba ezali kobela,
motema na yo mobimba ezali na pasi.
 
Longwa na litambe kino na moto,
eloko moko te ezali malamu,
kaka bapota mpe matutu oyo basukola te,
batia kisi te mpe bapakola mafuta te.
 
Mokili na bino ebebisami,
bingumba na bino esili kozika na moto ;
bapaya bazali kobebisa bilanga na bino
na miso na bino,
nyonso ebebisami solo,
lokola tango bapanzaka yango na moto ya mobulu.
Siona, mboka kitoko, etikali kaka yango moko
lokola mwa ndako moko ya matiti
kati na elanga ya vino,
lokola ndako ya kobombamela
kati na bilanga ya bapasiteki,
lokola engumba oyo ebatelami.
Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga,
abikisaki te ndambo ya bato kati na biso,
tolingaki kokoma lokola engumba Sodome,
tolingaki kokokana na engumba Gomore.
Losambo oyo Yawe andimaka
10 Boyoka Liloba na Yawe,
bino bakambi ya engumba Sodome !
Boyoka mobeko ya Nzambe na biso,
bino bato ya engumba Gomore !
11 « Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, »
elobi Yawe ?
« Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba,
bambeka na bino ya bameme ya mibali
mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta ;
nazali kosepela ata moke te
na makila ya bangombe ya mibali,
ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali.
12 Tango boyaka liboso na Ngai,
nani abengaka bino ete boya kokota
na lopango na Ngai ?
13 Botika komemela Ngai makabo oyo ezanga tina !
Nazali koyoka malasi na bino ya ansa nkele.
Bafeti na bino ya ebandeli ya sanza,
ya Saba mpe mayangani na bino :
bafeti wana ya mabe,
nazali kokoka yango lisusu te.
14 Motema na Ngai eyini
bafeti na bino wana ya ebandeli ya sanza
mpe bafeti na bino wana ekatama.
Ekomi penza mokumba mpo na Ngai,
nalembi komema yango.
15 Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela,
nakolongola miso na Ngai likolo na bino ;
ezala soki bosambeli mingi,
nakoyoka bino te,
pamba te maboko na bino etondi na makila.
 
16 Bomisukola mpe bomipetola,
bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai !
Botika kosala mabe !
17 Boyekola nde kosala malamu,
boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola,
bobundela mwana etike,
bokotela mwasi oyo akufisa mobali !
 
18 Boya sik’oyo, tosilisa likambo, »
elobi Yawe.
« Ezala masumu na bino ezali motane makasi,
ekokoma pembe lokola mvula ya pembe ;
ata ezali motane lokola ngola,
ekokoma lokola bapwale ya meme.
19 Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai,
bokolia mbuma kitoko ya mokili.
20 Kasi soki kaka botie moto makasi mpe botomboki,
bokokufa na mopanga. »
Pamba te monoko ya Yawe nde elobi.
 
21 Tala ndenge nini engumba ya boyengebene ekomi
lokola mwasi ya ndumba !
Ezalaki liboso engumba etonda na bosembo,
boyengebene ezalaki kovanda kati na yango ;
kasi lelo oyo ekomi kobomba babomi.
22 Palata na yo ekomi bosoto,
vino na yo ya kitoko ekomi mayi-mayi.
23 Bakambi na yo bazali batomboki,
baninga ya miyibi ;
bango nyonso balingaka kaka kanyaka
mpe batonda na lokoso ya lifuti.
Bakotelaka mwana etike te,
mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te.
 
24 Yango wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga,
Elombe ya Isalaele alobi :
Ah, mawa ! Nakosepela na pasi na bino, bino bayini na Ngai ;
mpe nakofutisa bino masumu, bino banguna na Ngai !
25 Nakotelemela bino,
nakopetola bosoto ya palata na bino
mpe nakolongola salite na bino,
26 nakokomisa lisusu basambisi na bino
malamu lokola na tango ya kala ;
mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli.
Sima na yango, bakobenga bino lisusu
Engumba ya Bosembo,
Engumba ya Boyengebene.
 
27 Siona ekosikolama na nzela ya boyengebene,
mpe bato na yango oyo bakobongola mitema
bakobika na nzela ya bosembo.
28 Kasi batomboki mpe bato ya masumu bakobebisama,
bato oyo bakobosana Yawe bakosila.
 
29 « Bokoyoka soni mpo na banzete ya terebente
oyo bozalaki kolinga mingi ;
bokoyoka pasi na mitema
mpo na bilanga oyo boponaki ;
30 bokokoma lokola nzete ya terebente
oyo ekawuka makasa.
31 Moto ya makasi akokoma moto ya bolembu,
mpe mosala na ye ekokoma lokola mokalikali ;
bango mibale bakozika nzela moko na moto,
mpe moto oyo koboma yango akozala te. »