2
Ngomba ya Yawe
Tala makambo oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na Yuda mpe Yelusalemi :
Na mikolo oyo ekoya,
ngomba ya Tempelo ya Yawe
ekolendisama ngwi na songe ya bangomba,
ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi,
mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.
Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba :
« Boya, tomata na ngomba ya Yawe,
na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi.
Akoteya biso banzela na Ye
mpo ete tolanda banzela mike na Ye. »
Pamba te Mobeko ekowuta na Siona,
mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
Akozala Mosambisi kati na bikolo,
akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele.
Bakotumba mipanga na bango na moto
mpo na kosala bakongo,
mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli.
Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga
mpo na kobundisa ekolo mosusu ;
bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
Oh ndako ya Jakobi,
yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe !
Mokolo ya Yawe
Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi,
mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este ;
bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia,
bazali kosala boyokani elongo na bapagano.
Mokili na bango etondi na palata mpe wolo,
bomengo na bango ezali na suka te.
Mokili na bango etondi na bampunda
mpe bakoki ata moke te kotanga bashar na bango ya bitumba.
Mokili na bango etondi na banzambe ya bikeko,
bato bakomi kofukamela biloko
oyo esalemi na maboko na bango,
oyo misapi na bango esili kosala.
Yango wana, bato bakokitisa mito,
mpe bato ya lokumu bakotonda na soni ;
kolimbisa bango te !
10 Kimela na madusu ya mabanga,
bombama na putulu ya mabele
liboso ya nguya ya kanda ya Yawe,
liboso ya nkembo ya lokumu na Ye !
 
11 Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi,
bato ya lofundu bakokitisama ;
Yawe kaka nde akonetolama.
12 Yawe, Mokonzi ya mampinga,
abongisa mokolo moko mpo na kokitisa
bato nyonso ya lolendo mpe ya lofundu,
bato nyonso oyo bamimatisaka,
13 banzete nyonso ya sedele ya Libani, oyo eleki na molayi mpe na kotombwama,
mpe banzete nyonso ya sheni ya Bashani ;
14 bangomba nyonso ya milayi
mpe bangomba nyonso ya mikuse,
15 bandako nyonso ya milayi,
bamir nyonso ya milayi oyo batonga makasi ;
16 bamasuwa nyonso ya Tarsisi
mpe bomengo na yango nyonso ya kitoko.
17 Lolendo ya moto ekosila
mpe lofundu ya bato ekosuka ;
Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.
 
18 Banzambe nyonso ya bikeko bakobebisama nye.
19 Bato bakokimela na madusu ya mabanga
mpe na putulu ya mabele
liboso ya nguya ya kanda ya Yawe,
liboso ya nkembo ya lokumu na Ye,
tango akotelema mpo na koningisa mokili.
20 Na mokolo wana,
bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembo
banzambe na bango ya bikeko ya palata
mpe banzambe na bango ya bikeko ya wolo,
oyo basalaki mpo ete bafukamela bango.
21 Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga
liboso ya nguya ya kanda ya Yawe,
liboso ya nkembo ya lokumu na Ye,
tango akotelema mpo na koningisa mokili.
 
22 Botika kotia elikya na moto
oyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye.
Motuya nini azali na yango ?