16
Moabi esengi lisungi na Yelusalemi
Botinda mpate lokola mpako epai ya mokambi ya mokili ;
wuta na Sela kino na ngomba Siona, mboka kitoko,
bokatisa esobe.
Bakobengana basi ya Moabi
lokola bandeke na zala na yango,
na suka ya ebale ya Arinoni.
« Pesa biso toli, kamata mokano.
Sala ete elili na yo ezala lokola butu na moyi makasi.
Bomba bato oyo bakimeli epai na yo,
kobimisa bango te.
Tika ete bato ya Moabi oyo bakimi epai na yo
bawumela elongo na yo !
Zala nguba na bango liboso ya mobomi. »
Tango minyoko ekokoma na suka,
kobebisama ekotikala lisusu te
mpe koboma ekosila na mokili.
Kiti ya bokonzi ekolendisama na bolingo ;
moto moko akovanda na kiti yango na bosolo,
akobimela na ndako ya Davidi :
alukaka bosembo kati na kosambisa
mpe alongisaka makambo ya bosembo.
 
Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi,
ndenge atombolaka mapeka :
lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye,
lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina.
Yango wana, bato ya Moabi bakosala matanga,
bakomilela bango na bango mpo na Moabi.
Bolela mpe bozala na mawa mpo na mikate ya Kiri-Aresheti,
oyo basala na bambuma ya vino.
Mpo ete bilanga ya Eshiboni esili kokawuka
elongo na bilanga ya vino ya Sibima.
Bakambi ya bikolo babukaki-bukaki bitape na yango oyo eleki kitoko,
oyo ekenda kino na Yaezeri mpe eleka kino na esobe.
Bitape yango ezalaki epanzana makasi
mpe ekenda mosika kino na ebale monene.
 
Yango wana, nazali kolela lokola Yaezeri
mpo na vino ya Sibima.
Eshiboni mpe Eleale, nazali kosopa mpinzoli mpo na bino !
Koganga ya esengo esili mpo bambuma na bino
mpe mpo na biloko oyo bobuki na bilanga na bino.
10 Esengo mpe kosepela ebungi na bilanga ya kitoko,
banzembo mpe koganga ya esengo ezali lisusu te
kati na bilanga ya vino !
Mokamoli vino akokamola lisusu te kati na ekamolelo,
pamba te nakosukisa koganga.
11 Motema na ngai ezali kolela lokola lindanda mpo na Moabi,
mpe kati ya motema na ngai ezali komona pasi
mpo na Kiri-Aresheti.
12 Bakomona Moabi komata na bisambelo ya likolo ya bangomba
mpo na kobondela na esika na ye ya bule,
kasi akolonga te.
13 Yango nde liloba oyo Yawe aloba wuta kala mpo na Moabi. 14 Kasi Yawe alobi sik’oyo boye : « Etikali mibu misato, kobakisa ata mokolo moko te, bato ya lokumu ya Moabi mpe ebele ya bato na ye bakosambwa, bongo bato na ye oyo bakobika bakozala kaka moke mpe bakozanga makasi. »