17
Maloba ya kosambisa Damasi
Maloba ya kosambisa Damasi :
« Tala, Damasi ekotikala lisusu engumba te,
ekokoma nde liboke ya libebi.
Bingumba ya Aroeri ekotikala lisusu na bato te,
ekotikala nde mpo na bibwele oyo ekokoma kolala kuna,
oyo moto ata moko te akobangisa.
Bingumba batonga makasi ekolimwa na Efrayimi,
mpe nguya ya bokonzi ekolimwa na Damasi.
Batikali ya Siri bakokoma lokola nkembo ya bana ya Isalaele, »
elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
 
« Na mokolo wana, lokumu ya Jakobi ekosila,
mafuta ya misuni ya nzoto na ye ekosila.
Ekozala lokola tango basangisaka matiti ya ble
mpe loboko ya moloni ebukaka mito na yango,
lokola tango balokotaka mito ya ble
oyo ekweyaka na lubwaku ya bato ya Refayimi.
Kasi kaka ndambo moke ya mito ya ble nde etikalaka ;
lokola tango baningisaka nzete
mpo na kobuka bambuma ya olive,
bongo bambuma mibale to misato etikalaka na songe ya bitape,
mpe minei to mitano etikalaka na bitape ya se, »
elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Na mokolo wana, bato bakotalela Mokeli na bango
mpe bakobalola miso na bango epai ya Mosantu ya Isalaele ;
bakotalela lisusu bitumbelo te
oyo ezali misala ya maboko na bango,
mpe miso na bango ekotala lisusu te
misala ya misapi na bango :
makonzi ya Ashera mpe bitumbelo ya malasi ya ansa.
Na mokolo wana, bakosundola bingumba na bango oyo batonga makasi
ndenge basundolaki banzete mpe bangomba liboso ya bana ya Isalaele.
Nyonso ekobebisama penza.
10 Mpo ete obosani Nzambe, Mobikisi na yo,
oboyi kokanisa Libanga oyo azali Ekimelo na yo,
okolisi banzete ya kitoko
mpe oloni banzete ya vino ya bapaya.
11 Kaka na mokolo oyo olonaki yango,
omonaki yango kobimisa mito ;
mpe na tongo makasi, nkona na yo ebimisaki bafololo.
Na mokolo ya pasi, milona na yo ekomonana pamba,
mpe pasi yango ekoki kosila te.
12 Mawa na ebele ya bato !
Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene !
Bato ya bikolo bazali koganga
lokola lokito ya mayi ya ebale monene !
13 Ata bato ya bikolo bazali koganga
lokola makelele ya mayi ya bibale minene,
bakimaka penza mosika
tango Yawe apamelaka bango ;
bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe,
lokola putulu na tango ya mopepe makasi.
14 Na pokwa, somo ya pwasa nde eyaka !
Bongo liboso ete tongo etana, eloko moko te etikalaka !
Yango nde lifuti ya bato oyo banyokolaka biso,
mpe mbano ya bato oyo bamonisaka biso pasi.