19
Maloba ya kosambisa Ejipito
Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito :
Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu,
azali koya na Ejipito.
Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye
mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.
 
« Nakosala ete bato ya Ejipito batelemelana bango na bango :
ndeko akobundisa ndeko na ye,
moninga akobundisa moninga na ye,
engumba moko ekobundisa engumba mosusu,
mpe mboka moko ekobundisa mboka mosusu.
Bato ya Ejipito bakosila mayele,
mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso ;
bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko,
epai ya milimo ya bakufi,
epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi
mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.
Nakokaba bato ya Ejipito
na maboko ya bakonzi ya mitema mabe,
mpe mokonzi moko ya kanda makasi akokonza bango, »
elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
 
Mayi ya ebale monene ekokita,
mpe mayi ya ebale ekosila mpe ekokawuka.
Mayi ya miluka ekokoma solo,
mayi ya Ejipito ekokita mpe ekokawuka.
Mpe lisusu, banzete oyo ebotaka na mayi ekokawuka,
elongo na matiti oyo ezalaka pembeni ya Nili,
na monoko ya ebale.
Milona nyonso ya bilanga oyo ebotaka pembeni ya Nili
ekokawuka mpe ekopumbwa na mopepe,
eloko moko te ekotikala.
Balobi mbisi bakonyokwama mpe bakokoma kolela,
bato nyonso oyo babwakaka ndobo mpe minyama na ebale Nili
bakokoma na pasi.
Bato oyo basalaka lino bakokufa soni ya makasi,
mpe bato oyo batongaka bilamba bakotonda na mawa.
10 Bato oyo basimbaka mokili bakokweya,
mpe basali nyonso bakolemba nzoto.
 
11 Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba,
bato ya bwanya ya Faraon bakomi kopesa batoli
oyo ezanga tina.
Ndenge nini bokoki penza koloba na Faraon :
« Ngai, nazali moko kati na bato ya bwanya,
moyekoli ya bakonzi ya kala ? »
 
12 Wapi sik’oyo bato na yo ya bwanya ?
Tika ete balakisa yo mpe basosolisa yo
makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
abongisaki mpo na kotelemela Ejipito.
13 Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba,
bakambi ya Mefisi bakomi kokanisa makambo ya lokuta ;
nzokande bango, makonzi ya bikolo ya bato ya Ejipito,
nde bazali kobungisa bato ya Ejipito nzela.
14 Yawe atindeli bango molimo ya kizunguzungu :
bango nde basalaki ete Ejipito ekoma kotenga-tenga
na misala na yango nyonso
ndenge moto oyo alangwe masanga atengaka-tengaka.
15 Eloko moko te ekosalema lisusu na Ejipito,
ezala na moto to na mokila,
na lindalala ya nzete ya mbila to na nzete oyo ebotaka na mayi.
Kobongwana ya Ejipito
16 Na mokolo wana, bato ya Ejipito bakokoma lokola basi. Bakolenga na somo na koningana ya loboko oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, atomboli mpo na kotelemela bango. 17 Bongo mokili ya Yuda ekolengisa bato ya Ejipito na somo. Tango nyonso bakoyoka kombo ya Yuda, bakolenga na somo mpo na mabongisi nyonso oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asalaki mpo na kotelemela bango.
18 Na mokolo wana, bingumba mitano kati na Ejipito ekokoma koloba lokota ya Bayuda mpe kolapa ndayi na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga. Bongo moko kati na yango ekobenga yango : Engumba ya moyi.
19 Na mokolo wana, bakotonga etumbelo moko na kati-kati ya Ejipito mpe bakotia likonzi moko lokola ekaniseli mpo na Yawe, na bandelo ya mokili. 20 Ekozala lokola elembo mpe litatoli mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokili ya Ejipito. Tango bakoganga epai na Yawe likolo na banyokoli na bango, akotindela bango mobikisi mpe mobundeli, mpe akobikisa bango. 21 Boye, Yawe akomimonisa epai na bato ya Ejipito. Mpe na mokolo wana, bato ya Ejipito bakoyeba Yawe, bakogumbamela Ye na bambeka mpe na makabo ya bambuma ; bakolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe bakokokisa yango. 22 Kasi Yawe akobeta Ejipito na nzela ya bitumbu, akobeta yango mpe akobikisa yango. Bakozonga epai na Yawe, bongo akoyanola na kolela na bango mpe akobikisa bango.
23 Na mokolo wana, bakopasola nzela moko wuta na Ejipito kino na Asiri. Bato ya Asiri bakokoma koya na Ejipito, mpe bato ya Ejipito bakokoma koya na Asiri. Bato ya Ejipito mpe bato ya Asiri bakokoma kosala elongo losambo mpo na Yawe. 24 Na mokolo wana, Isalaele akozala ekolo ya misato, sima na Ejipito mpe Asiri, lipamboli oyo Nzambe akomema na mokili. 25 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akopambola bango na maloba oyo : « Tika ete bopambolama : Ejipito, bato na Ngai ; Asiri, misala ya maboko na Ngai, mpe Isalaele, libula na Ngai ! »