18
Maloba ya kosambisa Etiopi
Mawa na mokili oyo ezali na bamasuwa
oyo ezalaka na bavwale lokola mabanki,
bongo enanaka na ebale ya Kushi !
Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale
kati na bamasuwa oyo basala na papirisi,
na likolo ya ebale monene !
Bino bapanzi sango ya mbangu,
bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi
mpe baposo ya nzoto na bango engengaka,
epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika,
bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango,
mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango.
Bino nyonso, bavandi ya mokili,
bino oyo botondisi mabele,
tango bakotombola bendele na likolo ya bangomba, bokomona ;
tango bakobeta kelelo, bokoyoka !
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai :
« Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai,
lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. »
Mpo ete liboso ya kobuka bambuma,
tango bafololo ya mike etikaka kobima
mpe ekomaka bambuma mibesu oyo ekomi pene ya kotela,
bakataka bitape na likwangola,
babwakaka mpe batiaka pembeni bitape.
Bakosundola yango epai ya bandeke
oyo eliaka misuni na likolo ya bangomba
mpe epai ya banyama ya zamba.
Bandeke minene ekolia yango na tango ya molunge
mpe banyama ya zamba ekolia yango na tango ya malili.
Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,
wuta epai ya ekolo ya bato milayi
oyo poso ya nzoto na bango engengaka,
wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika,
bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango,
mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango,
bakomema bakado yango na ngomba Siona,
esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka.