21
Maloba ya kosambisa mokili ya Babiloni
Maloba na Yawe na tina na esobe ya ebale monene :
Ndenge mopepe makasi elekaka na somo na Negevi,
monguna moko azali koya wuta na esobe,
wuta na mokili moko ya somo.
 
Namonaki emoniseli moko ya somo :
Moteki baninga azali koteka baninga,
mobebisi azali kobebisa.
Elami, bundisa bango !
Medi, zingela bango !
Nakosukisa kolela nyonso oyo ayeisaki na bato.
 
Yango wana, loketo na ngai ekomi na pasi,
pasi moko ya makasi penza ekangi ngai
lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
Makambo oyo nazali koyoka ezali kopesa ngai somo,
mpe oyo nazali komona ezali kosilisa ngai mayele.
Motema na ngai ezali kobeta noki-noki,
nakomi kolenga na somo,
mwa malili ya pokwa oyo nazelaka na esengo
ekomeli ngai somo makasi.
 
Mesa ebongisami,
batandi bilamba ya mesa,
bazali kolia mpe komela !
Bino bakonzi ya basoda, bopakola banguba na bino mafuta !
Tala liloba oyo Nkolo alobi na ngai :
« Kende, tia mokengeli ;
mpe tika ete aloba makambo oyo akomona.
Soki amoni shar oyo bampunda mibale ezali kobenda,
basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda,
bamoko bamati likolo ya ba-ane,
bamosusu bamati likolo ya bashamo,
tika ete asala keba, asala keba penza ! »
 
Boye, mokengeli agangaki lokola nkosi :
« Nkolo, mokolo mobimba,
natelemaka na likolo ya ndako molayi ya kokengela ;
mpe butu nyonso, natikalaka kaka se wana.
Tala, moto moko azali koya awa na shar,
oyo bampunda mibale ezali kobenda.
Azongisaki eyano :
‹ Babiloni esili kokweya, ekweyi solo !
Banzambe na yango nyonso ya bikeko elali-lali
mpe epanzani na mabele ! › »
 
10 Oh bato na ngai,
babeti bino ndenge batutaka ble na libanda !
Nazali koyebisa bino makambo oyo nayokaki
wuta epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga,
wuta epai ya Nzambe ya Isalaele.
Maloba ya kosambisa Duma mpe Arabi
11 Maloba na Yawe na tina na Duma*.
Moto moko azali kobelela Ngai wuta Seiri :
« Mokengeli, olobi nini mpo na butu ?
Mokengeli olobi nini mpo na butu ? »
12 Mokengeli azongisaki :
Tongo elingi kotana, kasi butu mpe elingi koya.
Soki bolingi kotuna mituna, botuna ;
bongo bozonga mpe boya lisusu.
 
13 Maloba na Yawe mpo na kotelemela Arabi :
Oh bino bato ya mombongo ya Dedani,
bokolala na esobe ya Arabi.
14 Bopesa mayi na moto oyo azali na posa ya mayi ;
bino bavandi ya mokili ya Tema,
bopesa bilei na bato oyo bazali kokima bitumba.
15 Pamba te bazali nde kokima mopanga,
mopanga oyo babimisi na ebombelo na yango,
bazali nde kokima tolotolo oyo etelemi makasi
mpe bitumba ya makasi.
16 Tala liloba oyo Nkolo alobaki na ngai : « Etikali kaka mobu moko, ndenge batangaka mikolo ya mowumbu, nkembo nyonso ya Kedari ekosuka. 17 Bongo, ekotikala kaka mwa ndambo moke ya basoda oyo babundaka na matolotolo mpe ya basoda ya mpiko kati na Kedari, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele.
* 21:11 Duma elingi koloba : kimia. Ezali nde kombo ya liseki ya Edomi.