22
Maloba ya kosambisa Yelusalemi
Maloba na Yawe na tina na lubwaku ya Emoniseli :
Likambo nini lisusu ekomeli bino sik’oyo
mpo ete bino nyonso bomata na likolo ya mitondo ya ndako ?
Oh engumba etonda na loyenge,
engumba etonda na makelele mpe na bisengo !
Bibembe na yo ekufi na mopanga te
to mpe na bitumba te.
Bakambi na yo nyonso bakimaki elongo ;
bakangaki bango na basoda na nguya ya tolotolo.
Mpe bato na yo, oyo bazalaki kokima monguna na mosika,
bakangaki bango mpe bakomaki elongo bakangami.
Yango wana nalobaki :
« Botika kotala Ngai, botika ete nalela makasi !
Bomeka kobondisa Ngai te
mpo na kobebisama ya bato na Ngai ! »
 
Pamba te ezali mokolo moko ya lokito ya bitumba,
mokolo ya pasi makasi mpe ya somo
kati na lubwaku ya Emoniseli
kowuta na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ;
ezali mokolo oyo mir ya makasi ekobukana
mpe makelele ya koganga ekobima na bangomba.
Mampinga ya Elami batomboli makonga,
mosusu bamati na bashar mpe bampunda ;
Kiri abimisi nguba.
Lubwaku na yo, oyo eleki kitoko etondi na bashar,
mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda
batelemi-telemi na bikuke ya engumba ;
bibombamelo ya Yuda etikali lisusu te.
 
Na mokolo wana, obalolaki miso na yo
na bibundeli oyo ezalaka na Ndako ya Zamba*.
Bomonaki ete Engumba ya mokonzi Davidi
ezali na madusu mingi kati na mir oyo ezingeli yango ;
boye bobombaki mayi kati na Liziba oyo ezalaka na se,
10 botangaki motango ya bandako ya Yelusalemi,
bobukaki mosusu mpo na kolendisa mir ya monene.
11 Bosalaki liziba mpo na kobomba mayi
ya liziba ya kala kati na bamir mibale,
kasi bobalolaki miso na bino te mpo na kotala
Ye oyo asalaki mpe abongisaki yango wuta kala.
12 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
azalaki kobenga bino na mokolo wana
mpo ete bolela mpe bosala matanga,
bomikokola suki mpe bolata saki.
13 Kasi tala, ezalaki kaka bisengo mpe loyenge,
koboma bangombe mpe bameme ya mibali, bantaba ya basi,
kolia misuni mpe komela masanga ya vino !
Bozalaki koloba :
« Tika ete tolia mpe tomela,
pamba te, lobi, tokokufa ! »
14 Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai yango
na matoyi na ngai moko penza :
« Kino bokokufa, bokotikala kozwa bolimbisi ya lisumu oyo te, »
elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Maloba ya kosambisa Shebina
15 Tala maloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Kende kokuta Shebina,
mobateli biloko ya ndako ya mokonzi,
loba na ye :
16 ‹ Ozali kosala nini awa,
mpe nani apesi yo nzela ya kotonga kunda na yo awa
lokola moto oyo azali kotimola kunda na ye na likolo
mpe kotonga epemelo na ye
kati na lidusu ya libanga monene ?
17 Tala, Yawe akomi pene ya koningisa yo
mpe kobwaka yo mosika, yo moto ya makasi !
18 Akobalola yo ndenge babalolaka ndembo
mpe akobwaka yo na etando moko ya monene.
Kuna nde okokufa,
mpe bashar na yo ya lokumu ekotikala,
yo oyo osalaka soni ya ndako ya mokonzi na yo.
19 Nakolongola yo na mosala,
mpe lokumu na yo ekosila.
20 Na mokolo wana, nakobengisa mosali na Ngai, Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia. 21 Nakolatisa ye nzambala na yo, nakokanga ye mokaba na yo mpe nakopesa bokonzi na yo na maboko na ye. Akozala tata mpo na bavandi ya Yelusalemi mpe mpo na ndako ya Yuda. 22 Nakotia fungola ya ndako ya Davidi na mapeka na ye : oyo akofungola, moto moko te akokanga yango ; mpe oyo akokanga, moto moko te akofungola yango. 23 Nakopika ye lokola sete na esika ya malamu ; akozala lokola kiti ya bokonzi ya lokumu mpo na ndako ya tata na ye. 24 Nkembo nyonso ya ndako ya tata na ye ekozala likolo na ye : kobanda na bakitani na ye kino na bana na bango nyonso, lokola bisalelo oyo : kobanda na bakopo ya mike kino na mbeki ya minene. 25 Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, sete oyo bapikaki na esika ya malamu ekolongwa, ekobukana mpe ekokweya ; mpe mokumba oyo amemaki ekokweya. › » Yawe nde alobaki.
* 22:8 Ndako ya Zamba ezali ndako oyo mokonzi Salomo atongaki pene ya Tempelo ya Yelusalemi. Eteni na yango ya monene evandisamaki na makonzi ya banzete ya sedele ya mokili ya Libani.