23
Maloba ya kosambisa Tiri mpe Sidoni
Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri :
Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga !
Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso :
ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali !
Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.
Bino bavandi ya esanga,
bino bato ya mombongo ya Sidoni,
oyo nzela ya ebale ekomisa bazwi,
bovanda nye !
Lifuti na ye ezalaki :
ble ya Shiyori, oyo ezalaki koya na nzela ya ebale monene
mpe milona oyo ezalaki kowuta pembeni ya Nili.
Engumba ya Tiri ekomaki nde zando ya bikolo.
Yoka soni, Sidoni, ndako batonga makasi ya ebale monene,
pamba te ebale monene elobi :
« Natikala koyoka pasi ya kobota te,
natikala na ngai mpe kobota te,
natikala na ngai kobokola bana mibali
to kokolisa bana basi te. »
Tango maloba yango ekokoma na Ejipito,
bakolenga na somo wana bakoyoka sango ya Tiri.
 
Bokatisa na ngambo ya Tarsisi,
bolela makasi, bino bavandi ya esanga.
Boni, oyo nde engumba na bino ya bisengo,
engumba oyo ebanda kala penza
mpe oyo makolo na yango ememaka yango
kowumela na mikili ya mosika ?
Nani azwaki mokano oyo mpo na kobebisa Tiri ?
Tiri oyo azalaki kokabola mitole,
oyo bato na ye ya mombongo bazalaki komimona lokola bakonzi ;
mpe oyo bato na ye ya nkita bazalaki komimona lokola bato
oyo baleki bato nyonso ya mokili na lokumu.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azwaki mokano yango
mpo na kosambwisa lolendo ya nkembo nyonso
mpe kokitisa kino na se bato nyonso ya lokumu,
oyo bazali na mabele.
 
10 Oh Tarsisi, mboka kitoko,
koma kosala bilanga
ndenge basalaka pembeni ya ebale Nili,
pamba te libongo ezali lisusu te.
11 Yawe asembolaki loboko na Ye na ebale monene
mpe alengisaki bikolo,
apesaki mitindo na tina na mokili ya Fenisi
ete babuka bandako na yango oyo batonga makasi ;
12 alobaki : « Okosepela lisusu te,
yo Sidoni, mboka kitoko, yo oyo lokumu na yo esili kobebisama lelo !
Telema, katisa na ngambo ya Shipele !
Ezala kuna, okozwa bopemi te. »
13 Tala mokili ya bato ya Chalide,
bato oyo bazalaka lisusu te !
Bato ya Asiri bakomisaki yango
esika ya kowumela mpo na banyama ya esobe ;
batongaki bandako na bango ya milayi mpo na kokengela,
babukaki bandako na yango batonga makasi
mpe bakomisaki yango putulu.
14 Bolela, bino bamasuwa ya Tarsisi !
Pamba te ndako na bino, oyo batonga makasi ebukani.
15 Na tango wana, bakobosana Tiri mibu tuku sambo kolanda molayi ya bomoi ya mokonzi moko. Kasi na suka ya mibu tuku sambo, ekosalema mpo na Tiri, makambo oyo baloba na nzembo oyo bayembelaka mwasi ya ndumba :
16 « Kamata lindanda,
tambola na engumba mobimba,
oh mwasi ya ndumba oyo babosana ;
beta yango malamu, yemba banzembo ebele
mpo ete bakanisa yo lisusu ! »
17 Na sima na mibu tuku sambo, Yawe akosala mpo na Tiri oyo ekozongela lifuti na yango ya mbindo ; mpe ekozongela kosala kindumba elongo na bikolo nyonso ya mokili. 18 Kasi lifuti mpe bomengo na yango ekobulisama mpo na Yawe ; bakobomba te yango kati na bibombelo. Bomengo na yango ekozala mpo na koleisa bato oyo batelemaka liboso ya Yawe mpe kolatisa bango bilamba ya kitoko.