25
Nzembo mpo na kokumisa Yawe
Yawe, ozali Nzambe na ngai ;
nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ;
pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka,
osalaki mabongisi ya kokamwa,
makambo oyo obongisa wuta kala.
Okomisaki engumba mopiku ya mabanga,
okomisaki bingumba ya makasi maboke ya mabanga ;
bandako batonga makasi ya bapaya etikali
lisusu na bilongi ya engumba te,
bakotonga yango lisusu te.
Yango wana, bato ya nguya bakopesa Yo lokumu,
bingumba ya bikolo ya kanza ekotosa Yo.
Ozalaki ekimelo mpo na mobola,
ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi,
ebombamelo na tango ya mvula makasi
mpe pio na tango ya molunge.
Pamba te pema ya banyokoli ezali
lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir ;
mpe lokola moto ya moyi na zelo ya esobe.
Osilisaki makelele ya bapaya
ndenge pio ya mapata esilisaka molunge ;
boye nde nzembo ya banyokoli esilaki.
Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga,
akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso,
feti monene ya vino ya kala,
ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite.
Kaka na ngomba oyo,
akobebisa vwale oyo esili kozipa bato nyonso,
bulangeti oyo ezipi bikolo nyonso ;
akolimwisa kufa mpo na libela.
Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso,
akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba.
Solo, Yawe alobi.
Na mokolo wana, bakoloba :
« Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso !
Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso.
Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ;
tika ete tosepela mpe tozala na esengo
mpo na lobiko oyo apesi biso ! »
10 Loboko na Yawe ekozala na ngomba oyo,
kasi bakonyata-nyata Moabi na mokili na bango
ndenge banyataka matiti kati na libulu ya fimie.
11 Akosembola maboko na Ye kati na yango
ndenge basembolaka maboko mpo na kokata mayi.
Nzambe akokitisa lolendo na bango
mpe mayele ya maboko na bango ;
12 akobuka bamir milayi na bino ya makasi
mpe akolalisa yango na se ;
akokweyisa yango na mabele
kino ekoma putulu.