26
Nzembo ya elonga
Na mokolo wana, bakoyemba nzembo oyo kati na mokili ya Yuda :
Tozali na engumba moko ya makasi ;
Nzambe akomisi lobiko
lokola mir mpe ebombamelo na yango.
Bofungola bikuke
mpo ete ekolo ya sembo,
ekolo oyo ebatelaka boyokani,
ekoka kokota !
Ndenge esila kokatama,
ye oyo akomitika epai na Yo,
okobatela ye na kimia, na kimia penza,
mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.
Botia tango nyonso elikya na Yawe,
pamba te Yawe azali penza Libanga ya tango nyonso.
Akitisaka bavandi ya likolo,
akweyisaka engumba oyo batonga makasi,
alalisaka yango penza na mabele
mpe akomisaka yango putulu.
Makolo ya bato ekonyata-nyata yango :
makolo ya babola, matambe ya bato pamba.
Libondeli
Nzela ya moto ya sembo, ezali alima ;
Yo oyo ozali Sembo,
okomisaka kitoko nzela ya moto ya sembo.
Oh Yawe, tango totambolaka na nzela
oyo mibeko na Yo etalisaka,
totalelaka Yo ;
Kombo na Yo mpe kotatola yango,
yango nde posa ya mitema na biso.
Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ;
kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi,
pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo
tango opesaka mabele bitumbu.
10 Soki basaleli moto mabe ngolu,
akoyekola bosembo te ;
ezala kati na mokili ya bosembo,
asalaka kaka mabe
mpe amonaka na ye monene ya Yawe te.
 
11 Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo,
kasi bazali komona yango te.
Tika ete bayokisama soni
tango bakomona bolingo makasi na Yo,
oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo ;
tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo
etumba bango !
12 Yawe, okopesa biso kimia,
pamba te okokiselaka biso misala nyonso oyo tosalaka.
13 Oh Yawe, Nzambe na biso,
atako bakonzi mosusu bakambaki biso,
kasi biso, topesaka lokumu kaka na Kombo na Yo.
 
14 Bakufi bakozala lisusu na bomoi te,
milimo ya bakufi ekozonga lisusu na bomoi te ;
opesaki bango etumbu
mpe obomaki bango nye ;
osalaki ete ata moto moko te akanisa bango lisusu !
 
15 Oh Yawe, okomisi ekolo na Yo monene !
Solo, okomisi ekolo na Yo monene,
omipesi penza lokumu ;
opusi bandelo nyonso ya mokili mosika penza.
16 Yawe, kati na pasi na bango, balukaki Yo ;
tango opesaki bango etumbu,
bamikabaki na mabondeli makasi.
17 Oh Yawe, tozalaki liboso na Yo
lokola mwasi ya zemi oyo akomi pene ya kobota,
bongo azali kobaluka mpe koganga na pasi.
18 Tozalaki na zemi,
tozalaki mpe kobaluka na pasi ;
kasi tango tobotaki, tobotaki kaka mopepe :
tomemelaki mabele lobiko te,
mpe tomemelaki mokili bato ya sika te.
 
19 Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi,
bibembe na bango ekosekwa.
Bino bato oyo bovandaka kati na putulu,
bolamuka mpe boganga na esengo !
Pamba te mamwe na Yo ezali
lokola mamwe ya tongo ;
mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.
Ngolu mpe kotongama
20 Bato na ngai, bokende,
bokota na bashambre na bino
mpe bokanga bikuke sima na bino ;
bomibomba nanu mwa tango moke
kino tango kanda ekoleka.
21 Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye
mpo na kopesa bato ya mokili etumbu
mpo na masumu na bango ;
mabele ekobimisa makila
oyo basopa likolo na yango,
ekobomba lisusu te bato oyo baboma.