3
Etumbu ya Yuda mpe ya Yelusalemi
Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,
akomi pene ya kobotola masungi nyonso,
kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda :
lisungi ya bilei mpe lisungi ya mayi ;
bilombe mpe basoda ya mpiko,
basambisi mpe basakoli,
bato oyo balobaka makambo oyo ekoya mpe bakambi ;
bakonzi ya basoda mpe bato ya lokumu,
bapesi toli, bato mayele ya misala ya maboko
mpe bato oyo basalelaka maji.
Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bango
mpe bana mike bakamba bango.
Bato bakokoma konyokolana bango na bango :
moko akonyokola mosusu,
mpe moninga akonyokola moninga na ye mosusu ;
bilenge bakotosa mikolo te,
bato pamba bakotelemela bato ya lokumu ;
moko akokanga ndeko na ye ya mobali
kati na ndako ya tata na bango mpe akoloba :
« Yo oyo ozali na kazaka, okozala mokonzi na biso,
kamata mokumba ya libebi oyo na maboko ! »
Kasi na mokolo wana, akoganga :
« Te, nazali na ngai monganga te,
mpe nazali na bilei to bilamba te
kati na ndako na ngai ;
bokomisa ngai mokonzi te ! »
 
Yelusalemi ezali kotepatepa,
mpe Yuda ekweyi ;
mpo ete maloba mpe misala na bango ezali
ya botomboki liboso ya Yawe,
ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye.
Bilongi na bango ezali kofunda bango ;
bazali kolakisa masumu na bango
ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala,
bazali kobomba yango te.
Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !
10 Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo,
pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. »
11 Mawa na moto mabe !
Pasi ezali likolo na ye,
pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye.
12 Bilenge bazali konyokola bato na Ngai,
basi bazali koyangela bango.
Oh bato na Ngai, bakambi na bino babungisi bino nzela,
babimisi bino libanda ya nzela oyo bosengeli kolanda !
 
13 Yawe atelemi na esambiselo,
atelemi mpo na kosambisa bato.
14 Yawe akosamba elongo na bampaka
mpe bakambi ya bato na Ye :
« Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino !
Botondisi bandako na bino na biloko
oyo bobotoli epai ya babola !
15 Mpo na nini bozali konyata bato na Ngai
mpe kotiola bomoto ya babola ; »
elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ?
Lisakoli mpo na basi ya Yelusalemi
16 Yawe alobi :
« Lokola basi ya Siona bazali lofundu,
lokola batambolaka mapeka likolo
mpe balalisaka miso na lofundu,
lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe
mpe na kolelisa biloko ya monzele
oyo balataka na makolo na bango,
17 Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalata
mpe akotika bango bolumbu. »
18 Na mokolo wana, Nkolo akolongola bango biloko na bango oyo basalelaka monzele : basheneti oyo balataka na makolo mpe babiju ya talo oyo ezalaka lokola moyi mpe sanza ; 19 biloko ya matoyi, basheneti oyo balataka na maboko, bavwale, 20 bitendi oyo bakangaka na mito, basheneti, mikaba, milangi ya malasi, bakisi ya kokangela nzoto, 21 bapete ya mosapi, bapete ya zolo, 22 bilamba ya feti, banzambala oyo etika nzoto, bakazaka, basakosi ya mike, 23 bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala.
24 Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe ;
na esika ya mokaba, ekozela nde singa ;
na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi ;
na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki ;
na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe.
25 Mibali na bino bakokufa na mipanga,
basoda na bino ya mpiko bakokufa na bitumba.
26 Bikuke ya Siona ekolela mpe ekozala na matanga ;
boye Siona ekokelela mpe ekovanda na mabele.