30
Ejipito : elikya ya pamba
« Mawa na bana ya mito makasi, »
elobi Yawe :
« basalaka mabongisi oyo ewutaka epai na Ngai te
mpe basalaka boyokani oyo ewuti na Molimo na Ngai te,
mpo ete babakisa lisumu likolo ya lisumu ;
mawa na bato oyo bakendaka na Ejipito,
na kozanga kotuna toli na Ngai,
mpo na koluka lisungi ya kobatelama epai ya Faraon
mpe koluka ebombamelo na se ya elili ya Ejipito !
Kasi ndako batonga makasi ya Faraon epai wapi bokokimela
ekokomela bino soni,
mpe elili ya Ejipito ekokoma likambo ya soni makasi.
Ata bakalaka na bango bazali na Tsoani
mpe bantoma na bango bakomi na Anesi,
bango nyonso bakoyoka kaka soni
na miso ya bato oyo bakosunga bango ata moke te,
oyo bakopesa bango ata lisungi to litomba moko te,
kasi bobele soni mpe kotiolama. »
Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi :
Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga,
mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi,
ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka,
bantoma bazali komema bozwi na bango
na mikongo ya ba-ane,
bomengo na bango na mikongo ya bashamo,
epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango
ata litomba moko te :
ekolo ya Ejipito oyo lisungi na yango ekozala
penza na tina moko te ;
yango wana, napesi yango kombo « Rahavi.* »
Libota ya batomboki
Kende sik’oyo, koma makambo oyo
na etando ya libanga liboso na bango,
koma yango na buku moko
mpo ete na mikolo oyo ekoya,
ezala lokola litatoli ya libela na libela.
 
Bato oyo bazali libota ya batomboki, bazali bana ya lokuta,
bana oyo balingaka te koyoka mateya ya Yawe ;
10 balobaka na bato oyo bamonaka makambo : « Bomona te, »
mpe na basakoli : « Bosakolela biso bimoniseli ya solo te,
boyebisa biso makambo oyo esepelisaka biso,
bosakolela biso makambo ya lokuta.
11 Botika nzela wana,
bobima penza na nzela wana
mpe botika kotungisa biso
mpo na Mosantu ya Isalaele ! »
 
12 Mpo na yango, tala liloba oyo Mosantu ya Isalaele alobi :
« Lokola bobwaki maloba oyo,
lokola bokangami na monyokoli
mpe na mokosi oyo bozali kotiela motema,
13 lisumu oyo ekokoma mpo na bino
lokola mir ya molayi oyo esala nzela mpe lidusu,
bongo ebukani mpe ekweyi mbala moko na mbalakata.
14 Ekobukana ndambo-ndambo lokola mbeki ya mosali mbeki,
ekopanzana penza nye na mawa te ;
bongo ata eteni moko te ekozwama kati na yango
mpo na kozwela likala ya moto na mbabola
to mpo na kotokela mayi na libulu. »
Kimia mpe elikya ya solo
15 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe,
Mosantu ya Isalaele, alobi :
« Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia
nde bokozwa lobiko na bino ;
ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya
nde bokozwa makasi na bino ;
kasi bino, bolingi bongo te.
16 Bolobaki : ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda ; ›
solo, bokokima nde !
Bolobaki : ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu ; ›
solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu !
17 Bato nkoto moko bakokima
na mangungu ya moto moko kaka ;
mpe na mangungu ya bato mitano,
bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele
na songe ya ngomba,
mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. »
 
18 Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu,
atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa.
Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo :
Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !
19 Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi,
bokolela lisusu te.
Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ;
tango kaka akoyoka, akoyanola bino.
20 Nkolo akopesa bino lipa na tango ya pasi,
mpe mayi na tango ya minyoko ;
moto oyo akoteya bino akotikala lisusu ya kobombama te,
kasi miso na bino moko ekomona ye.
21 Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali
to na ngambo ya loboko ya mwasi,
matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo :
« Tala nzela yango oyo ! »
22 Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palata
mpe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo ;
bokobwaka yango mosika
ndenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza,
mpe bokoloba na yango : « Longwa awa ! »
 
23 Boye, akotindela yo lisusu mvula
mpo na milona oyo okolona na mabele,
mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi.
Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene.
24 Bangombe mpe ba-ane oyo ebalolaka mabele ya bilanga
ekolia matiti ya mungwa oyo baponi na pawu mpe na kiyungulu.
25 Na mokolo ya kosambisa, tango bandako milayi ekobukana,
bibale ya mayi ekotiola na bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse.
26 Pole ya sanza ekongenga lokola pole ya moyi,
mpe pole ya moyi ekongenga makasi
koleka mbala sambo lokola pole ya mikolo sambo,
na mokolo oyo Yawe akotia kisi na pota ya bato na Ye
mpe akobikisa yango.
Kanda ya Yawe epai na Asiri
27 Tala, wuta mosika, Kombo ya Yawe ezali koya ;
kanda na Ye ezali kopela lokola moto
elongo na lipata ya molinga ya moto makasi ;
bibebu na Ye etondi na kanda,
mpe lolemo na Ye ezali lokola moto oyo ebomaka.
28 Pema na Ye ezali lokola ebale oyo etondi makasi,
ebale oyo etondi kino na kingo.
Akoyungola bikolo na kiyungulu ya pasi,
akotia na mbanga ya bato ebende
oyo batiaka na minoko ya bampunda
mpo ete emema bango na libunga.
 
29 Mpo na bino, bokoyemba banzembo
lokola na butu oyo basalaka bafeti ya bule ;
mitema na bino ekotonda na esengo
lokola bato oyo bazali kobeta flite
mpo na kokende na Ngomba ya Yawe,
na Libanga ya Isalaele.
30 Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo
mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye
kati na kanda makasi na Ye,
kati na moto oyo ebomaka,
kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.
 
31 Mongongo ya Yawe ekokweyisa Asiri,
mpe akobeta bango na lingenda na Ye ya bokonzi.
32 Mbala nyonso oyo Yawe akobeta bango
fimbu na Ye ya kosambisa,
ekolandisama na mindule ya bambunda mike mpe ya mandanda,
ndenge moko mpe tango akoningisa loboko na Ye
mpo na kobundisa bango.
33 Babongisaki wuta kala Tofeti,
babongisaki yango nde mpo na mokonzi ;
basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene
mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele.
Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo
nde ekopelisa yango.
* 30:7 Rahavi ezali kombo mosusu ya Ejipito ; elakisi : akokisaka te maloba oyo alobaka