29
Mawa mpe lobiko ya Yelusalemi
Mawa na yo, Arieli, Arieli,
engumba oyo Davidi azalaki kovanda !
Bobakisa mibu na mibu
mpe botika ete bafeti na bino ekoba
kolandana ndenge ezalaka.
Kasi nakonyokola Arieli ;
ekokoma na mawa mpe na kolela ;
ekokoma na miso na Ngai lokola etumbelo.
Nakozingela yo mpo na kobundisa yo,
nakozingela yo na mir ya molayi
mpe nakotiela yo mampinga ya nguya
mpo na kotelemela yo.
Okokitisama solo na se,
okoloba wuta na mabele,
mpe maloba na yo ekobanda kobima
na mongongo ya se wuta na putulu.
Mongongo na yo ekokoma kobima wuta na se ya mabele
lokola mongongo ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi ;
mpe wuta na putulu, maloba na yo ekobima
na mongongo ya se.
 
Bongo ebele ya banguna na yo bakokoma lokola putulu,
mpe ebele ya banyokoli na yo bakokoma lokola matiti ekawuka
oyo ezali kopumbwa na mopepe ;
ekosalema bongo na pwasa.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yo
na nzela ya bakake, ya koningana ya mabele
mpe ya lokito monene, ya mopepe makasi
mpe ya mvula ya moto oyo etumbaka.
Ekozala lokola ndoto to emoniseli ya butu
mpo na ebele ya bikolo oyo bakobundisa Arieli,
oyo bakotelemela ye
elongo na bandako na ye ya makasi mpe bakozingela ye.
Ekozala lokola moto oyo azali na nzala,
bongo azali kolota ndoto ete azali kolia,
kasi tango alamuki, libumu na ye ezali kaka pamba
lokola moto oyo azali na posa ya mayi,
bongo azali kolota ndoto ete azali komela mayi,
kasi tango alamuki na nzoto ya kolemba,
posa na ye ya mayi esili kaka te.
Ekozala nde bongo mpo na mampinga ya bikolo nyonso
oyo bakobundisa ngomba Siona.
Bato ya mayele oyo bakufa miso mpe balangwaka masanga
Bozanga maloba mpe bokamwa !
Bomiboma miso mpe botikala bakufi miso !
Bolangwa masanga, kasi na vino te !
Botenga-tenga, kasi na masanga ya makasi te !
10 Yawe asopeli bino molimo ya pongi makasi ;
akangi bino miso, bino basakoli,
azipi bino mito, bino bato oyo bomonaka makambo.
11 Mpo na bino, emoniseli nyonso oyo ekomi lokola maloba ya buku oyo bakanga mpe bapesi epai ya moto oyo ayebi kotanga, bongo balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nakokoka te, pamba te buku ekangama. » 12 To bapesi yango epai ya moto oyo ayebi kotanga te, mpe balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nayebi kotanga te. »
13 Nkolo alobi :
« Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko,
bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,
kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ;
mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai
ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.
14 Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ;
ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa
kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga,
mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. »
Bozoba ya bato
15 Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku
mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango ;
bato oyo basalaka misala na bango na molili
mpe balobaka : « Nani akoki komona biso ?
Nani akoyeba ? »
16 Bozali nde kobongola makambo !
Ezali lokola bozali kozwa mosali mbeki
ndenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki.
Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango :
« Asalaki ngai te ? »
Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki :
« Ozali mayele te ? »
Nyonso ekobongwana
17 Etikali kaka tango moke,
Libani ekobongwana elanga ya kitoko,
mpe elanga ya kitoko ekomonana lokola zamba.
18 Na mokolo wana, bakufi matoyi bakoyoka maloba ya buku,
mpe bakufi miso bakomona
tango bakobima na butu mpe na molili.
19 Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe,
babola bakozala na esengo kati na Mosantu ya Isalaele.
20 Banyokoli bakotikala lisusu te, batioli bakozala lisusu te
mpe bato oyo balukaka pasi ya baninga bakokufa :
21 elongo na bato oyo bakweyisaka bato
kati na kosamba mpo na liloba moko,
elongo na bato oyo batielaka basambisi mitambo
mpe bapesaka matatoli ya lokuta, na kosambisama,
mpo na kokweyisa moto ya sembo.
 
22 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe,
Mosikoli ya Abrayami,
alobi na libota ya Jakobi :
« Jakobi akozala lisusu na soni te,
elongi na ye ekozala lisusu ya kokawuka te.
23 Tango akomona kati na bango bana na ye,
mosala ya maboko na Ngai,
bakopesa lokumu na bosantu ya Kombo na Ngai
mpe bakososola bosantu ya Mosantu ya Jakobi.
Boye, bakozala na somo ya Nzambe ya Isalaele.
24 Bato oyo bazali koyengayenga na molimo bakozwa mayele,
mpe bato ya mito makasi bakondima koyekola mateya ya sika. »