32
Bokonzi ya sembo
Tala, mokonzi moko akokonza na bosembo,
mpe bakambi na ye bakokamba na solo.
Moko na moko kati na bango akozala
lokola ekimelo liboso ya mopepe
mpe ebombamelo liboso ya mvula ya makasi ;
akozala lokola miluka ya mayi kati na esobe,
lokola elili ya libanga monene kati na mokili ya mabele ekawuka.
Miso ya bato oyo bamonaka ekozipama lisusu te,
mpe matoyi ya bato oyo bayokaka ekoyoka malamu.
Mito ya bato oyo bazangi mayele
ekozwa boyebi mpe bososoli,
bongo lolemo ya bato ya likukuma ekokoma koloba
noki-noki mpe malamu.
Bakobenga lisusu te moto ya lokumu zoba,
mpe bakobenga lisusu te moto oyo akabaka moyimi ;
pamba te zoba alobaka kaka na bozoba,
motema na ye ekanisaka kaka makambo mabe :
atiolaka nzela ya bule,
alobaka maloba ya nkele mpo na kotelemela Yawe,
atikaka libumu ya moto oyo azali na nzala pamba
mpe apesaka te mayi na moto oyo azali na yango posa.
Misala ya moyimi ezalaka mabe,
abongisaka kaka miango ya mabe
mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta
na tango oyo mobola azali na mbeba te.
Kasi moto ya lokumu asalaka mabongisi ya lokumu
mpe alendaka mpo na misala na ye ya lokumu.
Basi ya Yelusalemi
Bino basi oyo bovandaka na kimia,
botelema mpe boyoka ngai ;
bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te,
boyoka makambo oyo nalingi koloba :
10 Etikali kaka mikolo moke kati na mobu,
bino basi oyo bozali na kimia, bokoningana ;
pamba te tango ya kosangisa milona ya vino esili koleka,
mpe tango ya kobuka bambuma ekozala lisusu te.
11 Bolenga, bino basi oyo bovandaka na kimia ;
boningana, bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te !
Bolongola bilamba na bino mpe botikala bolumbu,
bolata basaki na loketo na bino !
12 Bolela na kobeta tolo mpo na bilanga ya kitoko,
mpo na bilanga ya vino oyo ebotaka malamu,
13 mpe mpo na mokili ya bato na ngai ;
pamba te mokili oyo eboti basende mpe banzube.
Solo, bolela mpo na bandako nyonso ya kitoko
mpe mpo na engumba oyo etonda na bisengo,
14 pamba te basundoli ndako ya mokonzi ;
engumba oyo etonda makelele etikali lisusu na bato te,
Ofeli mpe ndako molayi ya bakengeli ekomi mpo na libela
mabulu ya mabanga mpo na bisengo ya ba-ane ya zamba,
mpe ekokoma etando epai wapi bibwele ekobanda kolia matiti,
15 kino tango Molimo akosopanela biso wuta na likolo,
bongo esobe ekokoma bilanga oyo ebotaka kitoko ;
mpe bilanga oyo ebotaka kitoko ekomonana
lokola zamba monene.
16 Bosembo ekowumela kati na esobe,
mpe solo ekozala kati na bilanga oyo ebotaka kitoko.
17 Mbuma ya bosembo ekozala kimia :
bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.
18 Bato na ngai bakovanda na bandako ya kimia,
na bandako ya malonga
mpe na bisika ya bopemi ya kimia.
19 Na nzela ya mvula ya mabanga oyo ekonoka,
zamba mpe engumba ekokitisama na se penza.
20 Esengo na bino oyo bozali kolona milona pene na mayi
mpe kotinda ngombe mpe ane na bino konyata bisika nyonso.