33
Yawe azali Mokangoli na biso
Oh mobebisi, mawa na yo,
yo oyo nanu obebisama te !
Oh mofundi, mawa na yo,
yo oyo nanu bafunda te !
Tango okosilisa kobebisa,
yo mpe bakobebisa yo,
tango okosilisa kofunda,
yo mpe bakofunda yo.
Oh Yawe, yokela biso mawa, tozali kotalela Yo !
Tongo nyonso, zala makasi na biso,
zala lobiko na biso na tango ya pasi !
Kaka na lokito ya mongongo na Yo,
bato bakimaka ;
soki otelemi, bikolo epalanganaka.
Oh bikolo, bakolokota bomengo na bino ya bitumba
ndenge balokotaka mankoko ;
bakosopanela yango na elulu ndenge mabanki esalaka.
Yawe anetolami mpo ete avandaka na likolo,
akotondisa Siona na bosembo mpe na solo.
Mikolo ya bomoi na yo ekozala na kimia ;
bwanya mpe boyebi ekozala bomengo ya lobiko na yo ;
kotosa Yawe, yango nde bozwi na yo.
Tango Yawe akosala
Tala, basoda na bango ya mpiko
bazali koganga makasi na balabala ;
bamemi sango ya kimia, azali kolela makasi.
Nzela ya minene esili kokawuka,
ata moto moko te ya mobembo azali koleka.
Mobebisi abuki boyokani,
asambwisi bingumba
mpe azali na botosi ya moto ata moko te.
Mokili ezali na matanga, esili kolemba nzoto,
Libani esambwe na soni
mpe elembi-lembi lokola fololo,
Saroni ekomi lokola esobe
mpe Bashani mpe Karimeli ekweyisi makasa na yango.
10 « Sik’oyo nakotelema, » elobi Yawe.
« Sik’oyo nakonetolama,
sik’oyo nakotombolama.
11 Mabongisi ya mitema na bino
ezali kaka lokola matiti ya kokawuka
mpe soki ekokisami,
ezalaka kaka lokola matiti ya kokawuka,
pema na bino moko ekozikisa bino lokola moto.
12 Bato bakozika na libanga ya moto,
ndenge nzube oyo bakata ezikaka na moto. »
 
13 Bino bato oyo bozali mosika,
boyoka makambo oyo nazali kosala,
bino bato oyo bozali pene,
bososola nguya na ngai !
14 Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona,
somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te :
« Nani kati na biso akoki kowumela
elongo na moto oyo ezikisaka ?
Nani kati na biso akoki kowumela
elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »
15 Moto oyo atambolaka na bosembo
mpe alobaka solo,
moto oyo abwakaka litomba
oyo ezwami na nzela ya moyibi,
moto oyo asembolaka maboko na ye te
mpo na kozwa kanyaka,
moto oyo akangaka matoyi na ye
mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato,
mpe oyo akangaka miso na ye
mpo na koboya komona mabe.
16 Moto wana akovanda na likolo :
mabanga ya makasi ekozala ekimelo na ye.
Akozanga te lipa ya kolia mpe mayi ya komela.
Lobiko ya Yelusalemi
17 Miso na yo ekomona Mokonzi na kitoko na Ye nyonso
mpe ekomona ndenge mokili ekenda kino na mosika.
18 Motema na yo ekokanisa lisusu somo oyo ozalaki koyoka :
« Wapi mokonzi oyo azwaka mpako ?
Wapi moto oyo amekaka bakilo ?
Wapi moto oyo atalaka bandako na biso ya milayi ? »
19 Okomona lisusu bato ya lolendo te,
bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koyoka
mpe maloba na bango, pasi mpo na kososola.
20 Tala Siona, engumba ya bafeti na biso ya minene,
miso na yo ekomona Yelusalemi,
ndako ya kimia, ndako ya kapo oyo ekopikama makasi ;
bakokoka kopikola makonzi na yango te,
mpe basinga na yango ekokatana te.
21 Kuna, Yawe akozala Elombe na biso.
Ekozala etuka ya bibale minene mpe ya miluka.
Masuwa moko te ekoya kuna,
masuwa moko te ya lokumu ekoleka wana.
22 Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso,
Yawe azali Mosali mibeko na biso,
Yawe azali Mokonzi na biso ;
Ye nde akobikisa biso.
23 Basinga na yo esili kolemba,
ezali lisusu te kosimba malamu nzete ya bendele ;
ezali lisusu te kofungola malamu vwale.
Boye, na tango bakokabola ebele ya bomengo ya bitumba,
bato ya tengu-tengu, bango moko penza,
bakobotola eteni na bango ya bomengo.
24 Movandi moke te ya Siona akoloba : « Nazali kobela ! »
Masumu ya bavandi ya kuna ekolimbisama.