Nzambe akopesa Lifuti
34
Kosambisama ya bikolo
Bino bikolo, bobelema pene mpe boyoka ;
bino bato, botia matoyi !
Tika ete mabele, elongo na nyonso
oyo ezali kati na yango,
mpe mokili, elongo na nyonso oyo ewuti na yango, eyoka !
Yawe atombokeli bikolo nyonso,
kanda na Ye ezali likolo ya mampinga ya bikolo nyonso.
Akobebisa bango penza nye,
akokaba bango na kufa.
Bakobwaka bibembe na bango na mabele,
bongo bibembe yango ekobimisa solo makasi,
mpe makila ekokita lokola ebale na bangomba.
Mampinga nyonso ya likolo ekobukana ;
mpe mapata ekolingama lokola buku,
bongo mampinga na yango nyonso ekokweya
ndenge makasa ya nzete ya vino mpe ya figi ekweyaka.
Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo ;
tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi,
mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama.
Mopanga na Yawe etondi na makila,
ezipami na mafuta,
na makila ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali,
na mafuta ya bameme ya mibali,
pamba te ezali na mbeka moko mpo na Yawe kati na Botsira
mpe bazali koboma bato ebele penza kati na mokili ya Edomi.
Mpakasa ekokufa nzela moko na bango,
mpe bangombe ya mibali elongo na bilenge na yango.
Mabele na yango ekolangwa na makila
mpe putulu na yango ekozipama na mafuta.
Pamba te ezali mpo na Yawe,
mokolo ya kozongisa mabe na mabe,
mobu ya lifuti mpo na likambo ya Siona.
Miluka ya Edomi ekobongwana gudron,
putulu na yango, lokola moto ya fofolo
mpe mabele na yango ekokoma kopela moto ;
10 moto oyo ekokufa te ezala na moyi to na butu,
bongo molinga na yango ekobanda komata mpo na libela.
Ekotikala esobe libela na libela,
mpe ata moto moko te akoleka lisusu wana.
11 Esulungutu mpe ndeke mosusu ya butu
ekozwa yango lokola libula,
kumu mpe yanganga ekokoma kovanda kuna.
Nzambe akosembola likolo ya Edomi
singa ya mobulu mpe nivo ya kozanga.
12 Bankumu na yango bakozala lisusu wana te
mpo na kopona mokonzi,
bakambi na yango nyonso bakotikala lisusu te.
13 Nzube ekobota kati na ndako ya mokonzi ;
basende mpe matiti, kati na bandako na ye batonga makasi ;
ekokoma ndako ya bambwa ya zamba,
lopango ya maligbanga.
14 Bikelamu ya esobe ekokutana kuna elongo na mbwa ya zamba,
mpe bantaba ya mibali ekobenga baninga na yango.
Kumu ekozwa kuna esika ya kolala mpe ya kopema.
15 Nyoka ekotonga zala na yango
mpe ekobwaka maki na yango kuna,
ekopasola yango mpe ekosangisa bana na yango
na se ya elili na yango.
Kaka kuna lisusu, ndeke oyo eliaka misuni
ekosangana moko na mosusu.
16 Boluka kati na buku ya Yawe mpe botanga :
Moko te kati na bango akozanga,
moko te akomitungisa mpo na moninga na ye ;
pamba te monoko na Yawe nde epesi mitindo
mpe Molimo na Ye akosangisa bango elongo.
17 Ye abwaki zeke mpo na bango
mpe loboko na Ye esaleli singa oyo bamekelaka molayi,
mpo na kokabolela bango mboka.
Bakozwa yango mpo na libela
mpe bakovanda wana libela na libela.