37
Kokangolama ya Yelusalemi
Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe. Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki. Balobaki na ye : « Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : ‹ Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana. Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki ! Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. › »
Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi, Ezayi alobaki na bango : « Boloba na nkolo na bino : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai. Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye ; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › »
Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye* alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina.
Sima na mokonzi ya Asiri koyoka sango na tina na Tiraka, mokonzi ya Kushi, ete azali koya kobundisa ye, atindaki bantoma epai ya Ezekiasi na maloba oyo : 10 « Boyebisa Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‘ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ’ 11 Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye ; okanisi ete yo nde okobika ? 12 Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango, bakangolaki yango ? 13 Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva ? › »
Libondeli ya Ezekiasi
14 Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe. 15 Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe : 16 « Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele ! Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele ; Yo nde osala Likolo mpe mabele. 17 Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ; Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba nyonso oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi. 18 Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo nyonso mpe mikili na bango. 19 Bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te, kasi banzete to mpe mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato. 20 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. »
Kokweya ya Senakeribe
21 Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo ete osambelaki Ngai na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri, 22 tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye :
Siona, mboka kitoko,
ezali kotiola yo mpe koseka yo.
Yelusalemi, mboka kitoko,
ezali koningisa moto mpo na kotiola yo.
23 Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ?
Nani oyo omatiselaki mongongo
mpe otalaki na miso ya lolendo ?
Mosantu ya Isalaele !
24 Na nzela ya bantoma na yo,
ofingaki Nkolo mpe olobaki :
‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai,
namataki kino na basonge ya bangomba,
kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani ;
nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi,
banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko,
mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka,
na zamba na yango oyo eleki kitoko ;
25 natimolaki mabulu ya mayi
mpe namelaki mayi ;
na matambe ya makolo na ngai,
nakawusaki miluka nyonso ya Ejipito. ›
 
26 Oyoka nanu yango te ?
Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala,
nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ;
sik’oyo nde nakokisi yango.
Esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi
mipiku ya mabanga.
27 Bato na yango bazangi makasi,
balengi na somo mpe bakomi na soni,
bakomi lokola matiti ya bilanga,
lokola matiti ya langi ya mayi ya pondu,
lokola matiti oyo ebotaka na mitondo ya bandako,
ekawuka liboso ete ekola.
 
28 Nayebi esika nini ozalaka,
tango nini obimaka,
tango nini ozongaka,
mpe tango nini otombokelaka Ngai.
29 Lokola otombokelaka Ngai,
mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai,
nakotia lopete na Ngai na zolo na yo,
nakokanga yo singa na bibebu
ndenge bakangaka mpunda monoko,
mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki.
 
30 Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo :
Na mobu oyo, bokolia biloko oyo
ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele ;
na mobu oyo ekolanda,
bokolia biloko oyo ebotaka yango moko.
Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma,
bokolona banzete ya vino mpe bokolia bambuma na yango.
31 Bato ya Yuda oyo bakobika, oyo bakotikala,
bakozala lokola nzete
oyo ekotisi misisa na yango ya sika kati na mabele
mpe eboti bambuma.
32 Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala ;
mpe na Siona, mwa ndambo bakobika.
Bolingo makasi na Yawe, Mokonzi ya mampinga,
nde ekokokisa yango.
33 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi
na tina na mokonzi ya Asiri :
‹ Akokota na engumba oyo te,
akobeta kuna ata mbanzi moko te,
akobundisa yango na banguba te
mpe akomatisa ata mabele te liboso na yango
mpo na komibomba.
34 Akozongela na nzela oyo ayelaki
mpe akokota na engumba oyo te, ›
elobi Yawe.
35 ‹ Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango
mpo na lokumu ya Kombo na Ngai
mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › »
36 Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe. 37 Boye, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alongolaki molako, azongaki na Ninive mpe akomaki kovanda kuna.
38 Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo, mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi.
* 37:8 Mokonzi ya Asiri, kombo na ye ezalaki : Senakeribe (Tala na Ez 37.17)