38
Bokono mpe lobiko ya Ezekiasi
Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »
Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe : « Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. »
Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
Bongo, Yawe alobaki na Ezayi : « Kende koloba na Ezekiasi : ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‘ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo. Nakokangola yo elongo na engumba oyo, na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango. ’ Bongo, tala elembo ya Yawe, elembo oyo ekolakisa mpo na yo ete Yawe akokokisa makambo oyo asili kolaka : Nakozongisa sima, na badegre zomi, elili ya moyi oyo ekitaki na tango ya Akazi. › » Boye, moyi ezongaki sima, mpe ekitaki na badegre zomi.
Loyembo ya matondi
Tala loyembo oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, akomaki na mokanda tango abikaki na bokono. 10 Nazalaki komilobela :
« Tango nazali nanu na makasi na nzoto,
naleka solo na nzela ya ekuke ya kufa
mpe nazangela mibu oyo etikali na bomoi na ngai ? »
11 Namilobelaki :
« Nakomona lisusu Yawe te,
Yawe, na mokili ya bato ya bomoi ;
nakomona lisusu ata moto moko te
to kowumela elongo na bato
oyo bavandi na mokili ya lelo !
12 Mikolo ya bomoi esili,
elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka
ndako ya kapo ya mobateli bibwele.
Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga
soki asilisi kotonga elamba.
Longwa na moyi kino na butu,
akomisi bomoi na ngai na suka.
13 Nakangaki motema kino na tongo ;
kasi lokola nkosi, abuki-buki mikuwa na ngai nyonso.
Longwa na moyi kino na butu,
akomisi bomoi na ngai na suka.
14 Nazalaki koganga lokola mbilambila to ndeke ya mayi,
nazalaki kolela lokola ebenga.
Miso na ngai elembaki kotala likolo.
Oh Yawe, natungisami, batela ngai ! »
15 Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai,
pamba te Ye moko nde asali yango !
Mibu nyonso ya bomoi na ngai,
nakotambola na komikitisa
likolo ya pasi ya motema na ngai.
16 Nkolo, bato babikaka mpo na bolamu na Yo ;
ezali mpe na nzela na yango
nde ngai nazwi bomoi.
Ozongiselaki ngai nzoto kolongono
mpe opesi ngai bomoi.
17 Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ;
na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa ;
obwaki masumu na ngai nyonso
sima na mokongo na yo.
18 Pamba te mboka ya bakufi ekoki te kokumisa Yo,
kufa ekoki kosanzola Yo te ;
bato oyo bakitaka na mboka ya bakufi
bazalaka na elikya na boyengebene na Yo te.
19 Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo
ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo.
Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.
20 Yawe, lokola obikisi ngai,
tokobeta mindule na biso
mikolo nyonso ya bomoi na biso
na Tempelo ya Yawe.
21 Ezayi alobaki :
— Bozwa liboke ya figi, botia yango na pota ; mpe mokonzi akobika.
22 Ezekiasi alobaki :
— Elembo nini ekolakisa ngai ete nakokende na Tempelo ya Yawe ?