Buku ya kobondisama
40
Elaka ya kokangolama
Bobondisa, bobondisa bato na Ngai,
elobi Nzambe na bino.
Boloba kati na Yelusalemi,
boyebisa ye
ete minyoko na ye ekomi na suka,
masumu na ye esili kolimbisama,
pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe
ngolu koleka mbala mibale
mpo na masumu na ye nyonso.
 
Mongongo ya moto moko ezali kobelela :
« Kati na esobe, bobongisa nzela mpo na Yawe ;
kati na mabele ya kokawuka, bosembolela Nzambe na biso
nzela moko ya monene.
Tika ete mabwaku nyonso ekundama,
bangomba nyonso ya milayi to ya mikuse ekitisama,
banzela nyonso oyo etengama esembolama,
mpe mabulu nyonso ekoma bitando.
Bongo, nkembo na Yawe ekomonisama,
mpe bato nyonso bakomona yango elongo ; »
pamba te Yawe nde alobi.
 
Mongongo moko elobi : « Belela ! »
Mpe nazongisaki : « Nabelela likambo nini ? »
 
« Bato nyonso bazalaka lokola matiti,
mpe nkembo na bango nyonso ezalaka
lokola bafololo ya bilanga.
Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka,
tango mopepe ya Yawe elekaka likolo na yango.
Solo, bato bazali lokola matiti :
Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka,
kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. »
 
Mata likolo ya ngomba,
Siona, yo momemi sango malamu ;
tombola mongongo na yo mpe ganga makasi,
Yelusalemi, yo momemi sango malamu ;
tombola yango penza, kobanga te ;
loba na bingumba ya Yuda :
« Botala Nzambe na bino ! »
10 Botala, Nkolo Yawe azali koya na nguya,
loboko na Ye ezali kopesa Ye makoki ya kokonza.
Botala, azali na lifuti elongo na Ye,
azali kotambola na lifuti na Ye.
11 Azali kobatela etonga na Ye
lokola mobateli bibwele :
kosangisa bana meme na maboko na Ye
mpe kokanga bango na tolo na Ye ;
kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi
oyo ezali nanu komela mabele.
Monene ya Nzambe ya Isalaele
12 Nani asila komeka ebale monene kati na loboko na Ye,
to likolo na nzela ya molayi ya misapi na Ye ?
Nani asila kosangisa putulu nyonso ya mabele kati na katini moko
to komeka kilo ya bangomba milayi na nzela ya ndobo
to komeka kilo ya bangomba mikuse na nzela ya emekelo kilo ?
 
13 Nani asosoli makanisi ya Yawe
to apesi Ye toli lokola molakisi ?
14 Yawe atunaki toli na nani
mpo ete apesa Ye mayele ?
Nani alakisaki Ye ndenge bakataka makambo na sembo
to apesaki Ye boyebi,
to mpe ateyaki Ye nzela ya bososoli ?
 
15 Solo, bikolo ezali lokola litanga moko ya mayi na katini,
lokola putulu kati na emekelo kilo !
Tala, amekaka bisanga lokola eloko ya moke penza.
16 Banzete ya Libani ekokoka te
mpo na kopelisa moto ya etumbelo,
mpe banyama na yango ekokoka te
mpo na kotumba mbeka.
 
17 Na miso na Ye, bikolo nyonso ezali lokola biloko pamba ;
amonaka yango lokola eloko pamba
to mpe lokola eloko te.
18 Bolingi kokokanisa Nzambe na nani ?
Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini ?
19 Ndenge basalaka ekeko,
mosali bikeko anyangwisi ebende na moto
mpe asali ekeko ;
mosali ya wolo abambi ekeko yango wolo,
bongo akangisi yango na basheneti ya palata.
20 Moto oyo azangi makoki ya kobonza makabo ya boye
mpo ete azali mobola makasi
akopona nzete oyo epolaka te ;
akoluka mosali bikeko oyo azali penza mayele
mpo na kosala nzambe ya ekeko oyo eninganaka te.
 
21 Boyebi yango te ?
Boyoka nanu yango te ?
Bayebisa bino nanu yango te wuta na ebandeli ?
Bososola nanu yango te wuta mokili esalema ?
 
22 Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele,
epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki ;
atandaki likolo lokola liputa
mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo
mpo na kovanda kuna ;
23 akomisaka bakonzi ya mokili bato pamba,
mpe bakambi na yango lokola biloko pamba.
24 Tango nanu batiami kutu na mabele te,
nanu balonami kutu te,
mobimbi na bango ezwi nanu ata misisa te,
afuli bango lokola mopepe mpe bakawuki,
bongo mopepe makasi ememi bango lokola matiti ya kokawuka.
 
25 « Bolingi kokokanisa Ngai na nani ?
Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, »
elobi Ye oyo azali Mosantu ?
26 Botombola miso na bino mpe botala na likolo :
Nani akela biloko nyonso ya likolo :
moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu ?
Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto
mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango.
Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye,
moko te kati na yango ezangaka.
 
27 Oh Jakobi, mpo na nini ozali koloba ;
oh Isalaele, mpo na nini kotatola :
« Nzela na ngai ebombami na miso ya Yawe,
likambo na ngai eyebani te na Nzambe na ngai ? »
28 Oyebi te ? Nanu oyoka te ?
Yawe azali Nzambe ya libela na libela,
azali Mokeli ya basuka ya mabele ;
alembaka te mpe apemaka te,
mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
29 Apesaka makasi na bato oyo balembi
mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.
30 Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka,
bilombe batengaka-tengaka ;
31 basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,
Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :
bapumbwaka likolo lokola bampongo,
bapotaka mbangu mpe bapemaka te,
batambolaka mpe balembaka te.