41
Mobikisi mpo na Isalaele
« Bino bisanga, bovanda kimia liboso na Ngai !
Tika ete bato ya bikolo bayeisa sika makasi na bango,
tika ete bapusana mpe baloba :
‹ Tokende elongo mpo na kosamba ! ›
 
Nani abimisaki wuta na este
moto oyo bosembo ezali kobenga na makolo na yango,
oyo elonga elandaka matambe na Ye ?
Nani akabaki bikolo na maboko na Ye
mpe atiaki bakonzi na se ya bokonzi na Ye ?
Mopanga na Ye ekomisaki bango putulu,
mpe tolotolo na Ye ekomisaki bango
lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ememaka.
Azali kolanda bango mpe koleka na kimia
na nzela oyo matambe na Ye eleka nanu te.
Nani asalaki mpe akokisaki makambo oyo ?
Nani abengaka bileko wuta na ebandeli ?
Ngai Yawe, nazali Ebandeli ya nyonso,
mpe nakozala mpe kaka ndenge moko
elongo na bato ya suka. »
Bisanga emoni yango mpe ekomi kobanga,
basuka ya mabele ezali kolenga.
Bazali kopusana, bazali koya pene ;
moto na moto azali kosunga moninga na ye
mpe koloba na ndeko na ye : « Sala makasi ! »
Mosali bikeko azali kolendisa monyangwisi bibende na moto,
mosemboli bibende na marto azali kopesa makasi
na mosali oyo apesaka yango elilingi ya suka ;
alobi mpo na bisika epai wapi basangisaka bibende : « Ezali malamu ; »
mpe alendisi nzambe ya ekeko na basete
mpo ete eningana te.
Yawe akangoli Isalaele
« Kasi yo, Isalaele, mosali na Ngai,
Jakobi oyo naponaki,
bino bakitani ya Abrayami, molingami na Ngai,
yo oyo nazwaki wuta na basuka ya mabele,
oyo nabengaki wuta na basuka na yango,
yo oyo epai ya nani nalobaki : ‹ Ozali mosali na Ngai, ›
naponaki yo mpe nabwakaki yo te.
10 Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;
komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;
nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;
solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,
loboko oyo elongisaka.
11 Bato nyonso oyo bazali kotombokela yo
bakokufa solo soni mpe bakosambwa ;
bato oyo bazali kotelemela yo bakokoma
lokola biloko pamba mpe bakokufa.
12 Ata oluki bayini na yo,
okomona bango te ;
bato oyo bazali kobundisa yo
bakokoma biloko pamba.
13 Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo,
nasimbi makasi loboko na yo ya mobali
mpe nazali koloba na yo :
‹ Kobanga te, nakosunga yo. ›
 
14 Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te,
Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te,
pamba te Ngai moko nakosunga yo, »
elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.
15 « Tala, nakomisi yo lokola libaya ya sika ya kotutela ble,
oyo batia minu bapelisa makasi,
lokola mbeli ya sika, mbeli ya minu makasi ;
okopanza bangomba milayi,
okokomisa yango putulu ;
okokomisa bangomba ya mikuse
lokola matiti ya kokawuka,
16 okoyungola yango, mpe mopepe ekomema yango,
mopepe makasi ekopanza yango.
Kasi yo, okosepela kati na Yawe,
okozwa lokumu kati na Mosantu ya Isalaele.
 
17 Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi,
kasi na pamba : mayi ezali te ;
balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi.
Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango ;
Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te.
18 Nakosala ete bibale etiola na likolo ya bangomba,
mpe bitima na kati-kati ya mabwaku ;
nakobongola esobe liziba ya mayi,
mpe mabele ya kokawuka mabele oyo ebimisaka mayi ;
19 nakolona kati na esobe : banzete ya sedele,
ya akasia, ya mirite mpe banzete ya olive ;
nakotia banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwi
esika moko kati na mabele ya kokawuka,
20 mpo ete bato bamona mpe bayeba,
batala mpe basosola elongo
ete loboko na Yawe nde esali makambo wana,
ete Mosantu ya Isalaele nde akeli yango. »
Yawe liboso ya banzambe ya lokuta
21 « Botalisa likambo na bino, »
elobi Yawe,
« boluka komilongisa, »
elobi Mokonzi ya Jakobi.
22 « Boya na banzambe na bino ya bikeko
mpo ete eyebisa biso makambo oyo ekoya.
Boyebisa biso masakoli na bino ya liboso, ezalaki nini,
mpo ete toyekola yango malamu
mpe toyeba ndenge nini esukelaki.
To boyebisa biso makambo oyo ekoya ;
23 boyebisa biso makambo oyo ekoya na sima,
mpo ete toyeba soki bozali solo banzambe ;
bosala nanu ata eloko moko, ezala ya malamu to ya mabe,
mpo ete toyoka soni mpe totondisama na kobanga.
24 Tala, bozali kaka pamba,
mpe misala na bino ezali bobele se pamba ;
moto oyo aponi bino asali penza likambo ya nkele.
 
25 Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya,
moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai.
Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto,
lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.
26 Nani alobaki yango wuta na ebandeli
mpo ete biso tokoka koyeba,
to wuta kala penza mpo ete tokoka koloba : ‹ Ezali sembo ? ›
Te, moto moko te alobaki yango,
moko te asalaki ete likambo yango eyokana,
moko te ayokaki maloba na bino.
27 Nazalaki Moto ya liboso ya koloba na Siona :
‹ Tala, tala bango oyo ! ›
Mpe na Yelusalemi : ‹ Napesi momemi Sango Malamu ! ›
28 Natalaki, kasi moto moko te azalaki,
moko te kati na bango mpo na kopesa toli,
moko te mpo na kopesa eyano
soki natuni bango motuna.
29 Tala, bango nyonso bazali banzambe ya lokuta !
Misala na bango ezali se pamba,
bililingi na bango ezali se mopepe mpe biloko ya pamba. »