43
Mobikisi Moko Kaka mpo na Isalaele
Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi,
Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ;
Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele :
« Kobanga te, pamba te nasikolaki yo,
nabengaki yo na kombo na yo,
ozali ya ngai.
Tango okokatisa mayi monene,
nakozala elongo na yo ;
mpe tango okokatisa bibale,
ekozindisa yo te.
Tango okotambola kati na moto,
okozika te,
mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;
pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo,
Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo.
Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo,
Kushi mpe Seba na esika na yo.
Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai,
lokola nalingaka yo,
nakokaba bato mosusu na esika na yo,
mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo.
 
Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo :
nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este
mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste ;
nakoloba epai ya nor : ‹ Pesa, ›
mpe epai ya sude : ‹ Kokanga te. ›
Zongisa bana na Ngai ya mibali
wuta na mikili ya mosika,
mpe bana na Ngai ya basi wuta na suka ya mabele,
moto nyonso oyo abengami na Kombo na Ngai,
oyo nakelaki mpo na nkembo na Ngai,
oyo nasalaki mpe nabongisaki. »
 
Bimisa bato oyo bazali na miso,
kasi bamonaka te ;
bato oyo bazali na matoyi,
kasi bayokaka te.
Tika ete bikolo nyonso esangana elongo
mpe bato basangana esika moko !
Nani kati na bango asakolaki makambo oyo ?
Nani kati na bango ayebisaki biso makambo
oyo esalemaki liboso ?
Tika ete babimisa batatoli na bango
mpo na kolobela bango !
Tika ete bato mosusu bayoka mpo ete baloba :
« Ezali ya solo ! »
 
10 « Bozali batatoli na Ngai, »
elobi Yawe,
« mpe mosali na Ngai, oyo naponi,
mpo ete bokoka koyeba,
kondimela Ngai mpe kososola
ete Ngai moko kaka nde nazali Nzambe :
Liboso na Ngai, nzambe moko te asila kosalema ;
mpe sima na Ngai, akotikala kozala te.
11 Ezali Ngai, Ngai kaka moko, nde nazali Yawe ;
Mobikisi mosusu azali te, soki Ngai te.
12 Kati na bino, Ngai nde nasakolaki,
nabikisaki mpe natatolaki ;
kasi ezali banzambe ya bapaya te.
Bozali batatoli na Ngai, »
elobi Yawe,
« mpe Ngai, nazali Nzambe.
13 Solo, wuta na tango ya kala,
nazalaka kaka ndenge moko ;
moko te akokoka kokangola na loboko na Ngai.
Soki nasali, nani akobongola yango ? »
Mawa na Nzambe mpe kozanga boyengebene ya Isalaele
14 Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na bino,
Mosantu ya Isalaele, alobi :
« Mpo na likambo na bino, nakotinda na Babiloni,
mampinga ya basoda, mpe nakokitisa bato nyonso
ya Babiloni lokola bakimi,
ezala bato ya Chalide oyo bamikumisaka na koganga
mpo na bamasuwa na bango.
15 Ngai, nazali Yawe, Mosantu na bino,
Mokeli ya Isalaele, Mokonzi na bino. »
 
16 Tala liloba oyo Yawe alobi,
Ye oyo apasolaka nzela monene kati na ebale monene,
mpe nzela moke kati na mayi ya makasi ;
17 Ye oyo atelemisaka bashar mpe bampunda,
mampinga ya basoda elongo na bilombe ya bitumba ;
Ye oyo alalisaka bango nyonso,
mpe bakokaka lisusu kotelema te,
bakufaka lokola singa ya mwinda :
18 « Bokanisa lisusu te makambo oyo eleka,
bomitungisa lisusu te mpo na makambo ya kala.
19 Tala, nazali kosala likambo ya sika !
Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te ?
Nazali kopasola nzela kati na esobe,
mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka.
20 Banyama ya zamba, bambwa ya zamba
mpe maligbanga ekopesa Ngai nkembo ;
pamba te nakopesa mayi kati na esobe,
bibale kati na mabele ekawuka,
mpo na komelisa bato na Ngai, oyo naponaki,
21 bato oyo Ngai moko nabongisaki
mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai.
 
22 Kasi obelelaki Ngai te, oh Jakobi,
pamba te olembaki Ngai, oh Isalaele.
23 Omemelaki Ngai bana meme te
lokola mbeka ya kotumba,
mpe opesaki Ngai lokumu te na nzela ya bambeka na yo.
Nakomisaki yo mowumbu te
mpo ete opesa Ngai malasi ya ansa lokola makabo,
mpe nalembisaki yo te
mpo ete obonzela Ngai malasi.
24 Osombelaki Ngai te biloko ya solo kitoko na motuya ya mbongo,
mpe otondisaki Ngai te na mafuta ya mbeka na yo,
kasi onyokolaki Ngai nde na masumu na yo
mpe olembisaki Ngai na mabe na yo.
 
25 Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo
mpo na lokumu ya Ngai moko
mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.
 
26 Zongisa yango nanu na makanisi na Ngai ;
tika ete tosamba elongo,
mpe loba yo moko mpo na kotalisa ete ozali moto ya sembo.
27 Tata na yo ya liboso asalaki masumu,
balobeli na yo batombokelaki Ngai.
28 Boye, nakosambwisa bakambi ya tempelo na bino
mpe nakobongisa Jakobi mpo na kobebisama,
mpe Isalaele, mpo na pasi.