42
Mosali ya Yawe
Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ;
moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai.
Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye,
mpe akotia bosembo kati na bikolo,
akotombola mongongo te, akoganga te,
akobelela na mongongo makasi te na babalabala ;
akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama
mpe akoboma te moto ya singa ya mwinda
oyo ekomi pene ya kokufa.
Akomema bosembo na solo nyonso,
akolemba te mpe akotika te
kino tango akotia bosembo na mokili.
Bisanga ekotia elikya na mobeko na ye.
 
Tala liloba oyo Nzambe, Yawe, alobi,
Ye oyo akelaki likolo mpe atandaki yango lokola liputa,
oyo atandaki mabele mpe biloko nyonso oyo mabele ebimisaka,
oyo apesaka pema na bato na yango
mpe bomoi na bato oyo batambolaka likolo na yango :
« Ngai Yawe, nabengaki yo na bosembo,
nasimbi loboko na yo makasi,
nabateli yo mpe natie yo
mpo na kosala boyokani elongo na bikolo
mpe kozala pole ya bikolo,
mpo na kofungola miso ya bakufi miso,
mpo na kobimisa bakangami na boloko
mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho.
 
Nazali Yawe ; yango nde Kombo na Ngai ;
nakopesa nkembo na Ngai na mosusu te
to lokumu na Ngai epai na banzambe ya bikeko te.
Tala, makambo ya liboso esili koleka,
mpe Ngai nazali kotatola makambo ya sika ;
nayebisi bino yango liboso ete esalema. »
 
10 Boyemba loyembo ya sika mpo na Yawe,
bokumisa Ye wuta na basuka ya mabele,
bino bato oyo botambolaka na ebale monene,
mpe nyonso oyo etondisaka yango,
bino bisanga mpe bavandi na yango nyonso !
 
11 Tika ete esobe mpe bingumba na yango etombola mingongo,
tika ete bamboka mike epai wapi Kedari avandaka esepela !
Tika ete bato ya Sela bayemba na esengo ;
tika ete baganga wuta na likolo ya bangomba !
12 Tika ete bapesa nkembo epai na Yawe
mpe batatola lokumu na Ye kati na bisanga !
13 Yawe akobima lokola elombe,
akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba ;
akoganga, solo ; akoganga makasi,
mpe akolonga banguna na Ye.
 
14 Wuta kala, navandaki nye,
nakangaki monoko mpe motema na ngai ;
kasi sik’oyo, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota,
nazali koganga, nazali kolela mpe kopema na pasi.
15 Nakobebisa bangomba milayi mpe mikuse,
nakokawusa banzete mpe matiti na yango nyonso,
nakokomisa bibale, bisanga,
mpe nakokawusa maziba ;
16 nakomema bakufi miso
na nzela oyo batikala nanu koyeba te,
nakotambolisa bango na nzela
oyo bamesana kotambola te ;
nakobongola molili pole liboso na bango,
mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima.
Tala makambo oyo nakosala,
nakotika yango te.
17 Kasi bato oyo batiaka elikya na banzambe ya bikeko
mpe balobaka na bililingi : « Bozali banzambe na biso, »
bakozonga sima mpe bakosambwa.
Kokangolama ya bakufi miso mpe bakufi matoyi
18 Boyoka, bino bakufi matoyi !
Botala mpe bomona, bino bato bokufa miso !
19 Nani azali mokufi miso soki mosali na ngai te ?
Nani yango mokufi matoyi soki ntoma
oyo ngai natindaki te ?
Nani mokufi miso lokola molobeli na ngai ?
Nani mokufi miso lokola mosali na Yawe ?
20 Omonaki makambo ebele,
kasi ozalaki na bokebi na yango te ;
matoyi na yo efungwamaki,
kasi oyokaki ata eloko moko te.
21 Esepelisaki Yawe, mpo na bosembo na Ye,
kokomisa Mobeko na Ye eloko ya monene mpe ya lokumu.
22 Kasi tala bato oyo bomengo na bango,
babotola yango mpe babebisa bango ;
bakanga bango nyonso na mabulu
mpe babomba bango kati na boloko,
bakoma lokola bomengo ya bitumba,
bongo moto akokangola bango azali te ;
bakoma lokola mosuni,
bongo moto akoloba : « Zongisa bango, » azali te.
 
23 Nani kati na bino akoyoka makambo yango ?
Nani akozala na bokebi na makambo oyo ekoya ?
24 Nani akabaki Jakobi na maboko ya babebisi,
mpe Isalaele na maboko ya banguna ?
Boni, ezalaki Yawe te oyo liboso ya nani basalelaki masumu ?
Pamba te balingaki te kolanda nzela na Ye
mpe kotosa Mobeko na Ye.
25 Boye, asopelaki bango moto ya kanda na Ye,
mobulu ya etumba makasi ;
azingelaki bango na moto na bangambo nyonso,
kasi basosolaki te ;
mpe moto ezikisaki bango,
kasi bazwaki penza likambo yango na motema te.