48
Pamela mpe lobiko ya Isalaele
Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi,
bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele,
bino oyo bobimi na libota ya Yuda,
bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe
mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele,
kasi na bosolo te mpe na bosembo te !
Bino oyo bomibengaka « Bato ya engumba mosantu »
mpe bolukaka lisungi epai ya Nzambe ya Isalaele,
oyo Kombo na Ye ezali « Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
Nasakolaki makambo ya liboso wuta kala,
monoko na ngai nde ebimisaki yango
mpe nasalaki ete eyebana ;
nasalaki yango na pwasa mpe ekokisamaki.
Pamba te nayebaki ndenge nini
bozalaka bato ya mito makasi,
bato oyo bazalaka na kingo lokola ebende
mpe oyo mbunzu na bango ezalaka lokola bronze.
Yango wana, nalobaki na yo makambo oyo wuta kala,
nayebisaki yo yango liboso ete ekokisama mpo oloba te :
« Nzambe na ngai ya ekeko nde asali yango,
elilingi na ngai ya nzete mpe ya ebende
nde apesaki mitindo ete esalema ! »
Boyokaki makambo oyo !
Botala, yango nyonso ekokisami.
Boni, bokondima yango kaka te ?
 
Wuta sik’oyo, nakoyebisa yo makambo ya sika,
makambo oyo ebombama,
makambo oyo oyebi nanu te.
Ekelami nde sik’oyo, ezali makambo ya kala te,
oyoka nanu yango te,
liboso ya mokolo ya lelo.
Boye, okoki koloba te :
« Solo, nayoka sango na yango. »
Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te ;
wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama.
Solo, nayebi ete ozalaka mokosi ;
babengaka yo motomboki
wuta na libumu ya mama na yo.
Mpo na lokumu ya Kombo na Ngai,
nakolembisa kanda ya motema na Ngai ;
mpo na lokumu na Ngai,
nakozongisa motema na Ngai sima mpo na yo.
Yango wana, nakoboma yo te.
10 Tala, napetolaki yo,
kasi ndenge bapetolaka palata na moto te ;
namekaki yo kati na moto ya minyoko.
11 Nasali yango kaka mpo na lokumu na Ngai,
mpo na lokumu na Ngai moko.
Ndenge nini nakoki solo komisambwisa Ngai moko ?
Nakokaba nkembo na Ngai na nzambe mosusu te.
 
12 Yoka Ngai, oh Jakobi,
Isalaele, yo oyo nabengaki !
Ngai, nabongwanaka te ;
nazalaka na ebandeli mpe na suka.
13 Loboko na Ngai moko nde esalaki miboko ya mabele,
mpe loboko na Ngai ya mobali nde etandaki likolo.
Soki nabengi yango,
yango nyonso etelemaka elongo.
 
14 Bino nyonso, boya elongo mpe boyoka :
Nzambe nini ya ekeko asakolaki makambo oyo ?
Moto oyo Yawe alingaka akokokisa
mokano na Ye mpo na Babiloni,
mpe loboko na ye ekotelemela bato ya Babiloni.
15 Ezali Ngai, solo ezali Ngai nde nalobi
mpe nabengi ye ;
nakoyeisa ye, mpe akolonga na makambo na ye.
16 Bopusana pene na Ngai mpe boyoka likambo oyo :
« Wuta na ebandeli, nalobaka na nkuku te ;
wuta tango makambo oyo esalema, nazali wana. »
Mpe sik’oyo, Nkolo Yawe atindi Ngai
elongo na Molimo na Ye.
 
17 Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na yo,
Mosantu ya Isalaele, alobi :
« Nazali Yawe, Nzambe na yo,
oyo ateyaka yo makambo ya malamu
mpo na bolamu na yo ;
oyo atambolisaka yo na nzela oyo osengeli kolanda.
18 Oh ! Soki osalaki penza keba na mibeko na Ngai,
kimia na yo elingaki kozala lokola ebale,
mpe bosembo na yo, lokola mbonge ya ebale monene ;
19 bakitani na yo balingaki kozala lokola zelo,
bana na yo, lokola motango ya mbuma ya zelo ;
kombo na bango elingaki kolongwa te
to kobebisama te liboso na Ngai.
 
20 Bobima na Babiloni,
bokima wuta na bato ya Babiloni !
Boloba yango na makelele ya esengo
mpe botatola yango ;
bopanza sango na yango kino na suka ya mokili ;
boloba : ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › »
 
21 Bayokaki posa ya mayi te
tango azalaki kotambolisa bango na esobe,
abimisaki mayi na libanga mpo na bango,
abukaki libanga mpe mayi ebimaki.
 
22 Kasi Yawe alobaki :
« Kimia ezali te mpo na bato mabe. »