49
Nzembo ya mibale ya Mosali na Yawe
Boyoka ngai, bino bisanga ;
boyoka maloba oyo, bino bikolo oyo ezali mosika :
Yawe abengaki ngai
wuta na libumu ya mama na ngai,
azalaki kolobela kombo na ngai
wuta mbotama na ngai ;
akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi,
abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye,
akomisi ngai lokola tolotolo
mpe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye ;
alobaki na ngai :
« Oh Isalaele, ozali mosali na ngai,
nakomonisa nkembo na ngai na nzela na yo. »
Kasi ngai, nalobaki :
« Nabimisaki motoki na ngai se pamba,
nasilisaki makasi na ngai na pamba
mpe nazwaki litomba moko te.
Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe,
mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. »
 
Mpe sik’oyo, Yawe oyo asalaki ngai
wuta na libumu ya mama na ngai
mpo ete nazala mosali na Ye,
mpo na kozongisa Jakobi epai na Ye
mpe kosangisa Isalaele pene na Ye,
pamba te nazali na lokumu na miso ya Yawe
mpe Nzambe na ngai azali makasi na ngai,
Ye, Yawe, alobi :
« Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai
mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi
mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki.
Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu
mpo ete omema lobiko na Ngai
kino na suka ya mokili. »
 
Tala liloba oyo Yawe,
Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele,
alobi epai na ye oyo atiolami
mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo,
na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe :
« Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema,
bakambi bakomona yo mpe bakogumbama,
likolo na Yawe oyo azali Sembo,
Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. »
Isalaele akotelema lisusu
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Na tango ya malamu, nakoyanola yo ;
mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo ;
nakobatela yo mpe nakotombola yo
mpo ete osala boyokani elongo na bato,
osala ete mokili etombwama
mpe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki ;
mpo ete oloba na bakangami : ‹ Bobima, ›
mpe na bato oyo bazali kati na molili :
‹ Bokoma bansomi ! ›
 
Boye bakozala lokola bibwele oyo
ezali kolia matiti pene ya nzela,
mpe bakozwa bilei na bangomba nyonso
oyo ebotaka matiti te.
10 Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ;
molunge ya esobe to moyi makasi
ekomonisa bango pasi te,
pamba te Ye oyo alingaka bango
akolakisa bango nzela
mpe akomema bango pene ya miluka.
11 Nakobongola bangomba na Ngai nyonso nzela,
mpe nakokunda mabulu ya banzela na Ngai ya minene.
12 Tala, bakowuta penza mosika,
ndambo moko na ngambo ya nor,
ndambo mosusu na ngambo ya weste,
mpe ndambo mosusu na etuka ya Sinimi. »
 
13 Oh likolo, ganga na esengo !
Oh mabele, sepela !
Oh bangomba, boyemba banzembo !
Pamba te Yawe abondisi bato na Ye
mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki.
 
14 Kasi Siona alobaki :
« Yawe asundoli ngai,
Nkolo na ngai abosani ngai ! »
15 Boni, mama akoki solo kobosana
bebe na ye oyo azali komelisa mabele,
to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ?
Ata soki akoki kobosana,
ngai nakoki kobosana yo te !
16 Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai ;
bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
17 Bana na yo bakozonga na lombangu,
kasi babebisi na yo bakokende mosika na yo.
18 Tombola miso na yo mpe tala na zingazinga :
bana na yo nyonso basangani
mpe bazali koya epai na yo.
Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, elobi Yawe,
ete bakozala mpo na yo lokola babiju ya talo,
mpe okolata bango lokola mokaba ya mwasi mobandami na libala.
19 Ata soki mokili na yo ekomaki lokola mipiku ya mabanga,
bongo ebebisamaki mpe etikalaki lisusu na bato te ;
sik’oyo, ekokoma moke mpo na bato na yo,
mpe bato oyo bazalaki komonisa yo pasi
bakozala mosika na yo.
20 Okanisaki ete ozangaki bana,
kasi okoyoka bango koloba na matoyi na yo :
« Esika oyo ezali penza moke mpo na biso ;
pesa biso esika oyo eleki monene
mpo ete tokoka kovanda. »
21 Boye, okomilobela na motema :
« Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo ?
Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te,
nazalaki mowumbu mpe moto basundola.
Bongo nani abokolaki bango ?
Natikalaki kaka ngai moko,
bongo bana oyo bawuti wapi ? »
22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
« Tala, nakotombola loboko na Ngai liboso ya bikolo,
nakotelemisa bendele na Ngai liboso ya bato ;
bakomema bana na yo ya mibali na maboko na bango
mpe oyo ya basi, na mapeka na bango.
23 Bakonzi bakozala batata babokoli na yo,
mpe basi na bango, basungi na yo ;
bakofukama liboso na yo
na bilongi etala na mabele,
bakolembola putulu ya makolo na yo.
Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ;
ete bato oyo batielaka Ngai motema
bayokisamaka soni te. »
 
24 Boni, bakoki solo kobotola bomengo ya bitumba
na maboko ya basoda ya mpiko
to kokangola mokangami
wuta na maboko ya monyokoli na ye ?
25 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi :
« Solo, mokangami akokangolama na maboko ya basoda ya mpiko,
mpe bomengo ya bitumba ekokangolama na maboko ya monyokoli.
Nakotelemela bato oyo bakotelemela yo,
mpe nakobikisa bana na yo.
26 Nakosala ete banyokoli na yo
balia misuni na bango moko ;
bakolangwa makila na bango moko
ndenge balangwaka masanga ya vino.
Boye, moto nyonso akoyeba ete
Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo,
Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi. »