5
Loyembo ya elanga ya vino
Nakoyemba loyembo mpo na molingami na ngai,
loyembo ya molingami na ngai mpo na elanga na ye ya vino.
Molingami na ngai azalaki na elanga moko ya vino
kati na mabele kitoko oyo ezalaka na mopanzi ya ngomba ;
abalolaki mabele, alongolaki mabanga,
mpe alonaki vino ya kitoko koleka ;
atongaki kuna ndako molayi ya bakengeli
mpe atimolaki ekamolelo ya vino.
Akanisaki ete akobuka bambuma ya vino ya kitoko,
kasi ebotelaki ye bambuma ya mabe !
Sik’oyo, bino bavandi ya Yelusalemi, bato ya Yuda,
bokata makambo kati na ngai mpe elanga na ngai ya vino !
Nasala penza eloko nini, mpo na elanga na ngai ya vino,
oyo natikala nanu kosalela yango te ?
Mpo na nini eboteli ngai bambuma ya mabe,
tango ngai nakanisaki ete ekobotela ngai bambuma ya malamu ?
 
Sik’oyo, nakoloba na bino makambo
oyo nakosala na elanga na ngai ya vino :
Nakokweyisa lopango na yango, mpe ekobebisama ;
nakotobola madusu kati na bamir na yango,
mpe baleki nzela bakokoma konyata-nyata yango.
Nakokomisa yango esobe :
kati na yango, bakolongola lisusu te,
ezala mabanga to matiti ;
bongo banzube mpe basende ekokola kuna.
Nakopesa mitindo na mapata
ete enokisela yango lisusu mvula te.
Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga,
ezali nde libota ya Isalaele,
mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye.
Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ;
makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.
Pasi mpe kosambisama
Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako,
elanga pembeni ya elanga,
kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili !
Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai :
« Solo, bandako minene ekotikala pamba,
bandako kitoko ekozanga bato ya kovanda kati na yango.
10 Pamba te elanga ya vino ya ba-ekitare mibale
ekobimisa kaka bisangala minei ya vino,
bakilo nkama mibale na tuku mibale ya milona ya ble
ekobimisa kaka bakilo tuku mibale na mibale. »
 
11 Mawa na bato oyo balamukaka na tongo-tongo
mpo na kowumela liboso ya masanga ya vino kino na butu,
kino tango bakolangwa masanga !
12 Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino,
bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango,
kasi bakanisaka te mosala na Yawe
mpe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye.
13 Yango wana, bato na Ngai bakokende na bowumbu
mpo na kozanga boyebi ;
bato na bango ya lokumu bakokufa na nzala,
mpe bato pamba bakokufa na posa ya mayi.
14 Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasi
mpe ekofungola monoko na yango makasi ;
bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzela
moko mpe na loyenge na bango.
15 Moto akokitisama,
bato ya mokili bakoyokisama soni,
mpe bilongi ya bato ya lolendo ekotala na se.
16 Kasi Yawe, Mokonzi ya mampinga,
akonetolama na nzela ya bosembo na Ye,
mpe Nzambe Mosantu akolakisa bosantu na Ye
na nzela ya boyengebene na Ye.
17 Bameme ekokoma kolia matiti
lokola nde ezali kati na elanga na yango moko,
bapaya bakozwa bomengo oyo bazwi bakotika.
 
18 Mawa na bato oyo babendaka masumu
na basinga ya makambo ya lokuta,
mpe mabe lokola nde bazali kobenda shario na basheni !
19 Mawa na bato oyo balobaka :
« Tika ete Nzambe asala noki,
tika ete asala na lombangu mosala na Ye
mpo ete tomona yango !
Tika ete mabongisi ya Mosantu ya Isalaele ebelema mpe ekokisama
mpo ete tokoka koyeba yango ! »
20 Mawa na bato oyo babengaka mabe malamu
mpe malamu mabe,
oyo bamonaka molili lokola pole
mpe pole lokola molili,
oyo bamonaka bololo lokola elengi
mpe elengi lokola bololo !
21 Mawa na bato oyo bamimonaka
lokola bato ya bwanya na miso na bango moko,
mpe na bato oyo bamimonaka
lokola bato ya mayele na miso na bango moko !
22 Mawa na bato oyo bakenda sango
ya komela vino mpe ya kosangisa masanga ya makasi :
23 bazwaka kanyaka mpo na kolongisa moto mabe
mpe bazangisaka na moto ya sembo bosembo na ye !
 
24 Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti,
mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto,
ndenge wana mpe misisa na bango ekopola
mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu,
pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga,
mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele.
 
25 Yango wana, Yawe atombokeli bato na Ye,
asemboli loboko na Ye mpe abeti bango ;
bangomba eningani,
bibembe na bango etondi lokola bafulu na balabala.
Kasi ata bongo, kanda na Ye ekiti kaka te,
loboko na Ye etikali kaka ya kosembolama.
26 Yawe atomboli bendele
mpo na bikolo oyo ezali mosika,
azali kobeta piololo mpo na kobenga
bato oyo bazali na suka ya mokili :
tala bango wana, bazali koya na lombangu mpe noki !
27 Moko te kati na bango asili kolemba nzoto to abeti libaku,
moko te azali konimba to kolala pongi.
Moko te alongoli mokaba na ye na loketo,
singa moko te ya basapato na bango etikali kokatana.
28 Bambanzi na bango ezali songe,
batolotolo na bango nyonso ebendana makasi ;
makolo ya bampunda na bango ezali lokola mabanga,
bapine ya bashar na bango ezali lokola mopepe makasi.
29 Koganga na bango ezali lokola koganga ya bankosi :
bagangaka lokola bana nkosi,
bagangaka soki bakangi nyama na bango,
bamemaka yango na esika ya kimia,
mpe moto moko te akokaka kobotola bango yango.
 
30 Na mokolo wana, bakoganga likolo na bango
lokola makelele ya ebale monene.
Mpe soki moto atali kati na mokili,
akomona molili mpe minyoko :
pole ekozipama na se ya mapata.