6
Kobengama ya Ezayi
Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo. Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye ; moko na moko azalaki na mapapu motoba : mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa. Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu :
« Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga !
Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye ! »
Na makelele ya mingongo na bango, mabaya oyo esimbaka bikuke ekomaki koningana, mpe Tempelo etondaki na milinga. Nalobaki :
« Mawa na ngai ! Nabebi na ngai,
pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo,
navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo,
mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »
Moko kati na baserafe asimbaki, na loboko na ye, likala ya moto oyo azwaki na etumbelo na bisimbelo, apumbwaki mpe ayaki epai na ngai ; atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki :
« Tala, lokola likala oyo etuti bibebu na yo,
mabe na yo esili kolongwa,
masumu na yo esili kolimbisama. »
Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba :
— Nakotinda nani ? Nani akokende mpo na biso ?
Nazongisaki :
— Ngai oyo, tinda ngai !
Yawe alobaki na ngai :
— Kende koloba na bato oyo :
« Boyoka na bino, kasi bokososola te ;
botala na bino, kasi bokomona te !
10 Komisa bato oyo mitema makasi,
kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango
mpo ete bamona te na miso na bango,
bayoka te na matoyi na bango,
basosola te na mitema na bango,
babongwana te mpe babika te ! »
11 Boye nalobaki :
— Oh Nkolo, kino tango nini ?
Azongisaki :
— Kino bingumba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te, kino tango bato bakotikala lisusu na bandako te, mpe bilanga ekobebisama mpe bakosakanela yango ; 12 kino tango Yawe akotinda bato mosika, kino tango bakobosana penza mokili libela.
13 Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.