52
Yelusalemi ekotongama lisusu
Oh Siona, lamuka, lamuka !
Tika ete omikomisa lisusu makasi.
Yelusalemi, engumba ya bule,
lata bilamba na yo ya lokumu,
pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te
to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.
Oh Yelusalemi, milongola na putulu,
telema mpe vanda na esika na yo ya lokumu !
Oh Siona, mboka kitoko,
yo oyo ozali mokangami,
kata minyololo na kingo na yo !
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. » Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Na ebandeli, bato na Ngai bakendeki na Ejipito mpo na kovanda kuna lokola bapaya ; mpe na sima, Asiri anyokolaki bango. Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe ? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama. Yango wana, bato na Ngai bakoyeba Kombo na Ngai ; yango wana, na mokolo wana, bakoyeba ete Ngai moko nde nasakolaki yango. Solo, ezali nde Ngai. »
Nzambe akangolaka
Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba,
makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu,
ba-oyo batatolaka kimia,
ba-oyo bamemaka basango ya boboto,
ba-oyo basakolaka lobiko,
ba-oyo balobaka na Siona :
« Nzambe na yo azali Mokonzi ! »
Yoka ! Bakengeli na yo batomboli mingongo ;
bazali koganga elongo na esengo,
pamba te, na miso na bango,
bakomona Yawe kozonga lisusu na Siona.
Bino mipiku ya mabanga ya Yelusalemi,
boyemba elongo banzembo ya esengo,
pamba te Yawe abondisi bato na Ye,
asikoli Yelusalemi.
10 Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule
na miso ya bikolo nyonso ;
mpe suka nyonso ya mokili ekomona
Lobiko ya Nzambe na biso.
 
11 Bokende, bokende, bobima awa !
Bosimba eloko moko te ya mbindo !
Bobima kati na yango mpe bozala peto,
bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe !
12 Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te
mpe bokokende te lokola bato bazali kokima,
pamba te Yawe akotambola liboso na bino
mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.
Pasi mpe nkembo ya Mosali
13 Tala, mosali na ngai akosala na bwanya, akotombolama,
akomata likolo mpe akonetolama makasi penza.
14 Ndenge bato mingi bazalaki na somo mpo na ye
na ndenge abebaki, elongi na ye etikalaki lisusu te lokola elongi ya moto,
mpe lolenge na ye etikalaki lisusu te lokola mwana ya moto nyonso,
15 ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa,
mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye,
pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te
mpe bakososola oyo nanu bayoka te.