51
Lobiko ya seko mpo na Siona
« Boyoka ngai,
bino bato oyo bolukaka bosembo
mpe bolukaka Yawe !
Botala libanga epai wapi bosalemaki,
mpe libulu epai wapi bobendamaki.
Botala Abrayami, tata na bino ;
mpe Sara oyo abotaki bino.
Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko ;
napambolaki ye mpe nakomisaki ye
tata ya bato ebele !
Solo, Yawe akobondisa Siona
mpe akotala na liso ya ngolu
bisika nyonso ya Siona oyo ebeba ;
akokomisa esobe na yango lokola Edeni,
bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe.
Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna,
matondi mpe mongongo ya banzembo.
 
Oh bato na ngai, boyoka ngai !
Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu :
Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai,
lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo.
Bosembo na ngai ezali pene,
lobiko na ngai ebimi na lombangu,
mpe maboko na ngai ekosambisa bikolo.
Bisanga ekotalela ngai,
ekozala na elikya na nguya ya loboko na ngai.
Botombola miso na bino na likolo,
botala na se, na mabele ;
likolo ekolimwa lokola milinga,
mabele ekonuna lokola elamba,
mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi.
Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko,
bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.
 
Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo,
bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai
kati na mitema na bino :
Bobanga te lolenge bato bakotiola bino
to bozala na somo ya mangungu na bango te.
Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba,
mpe bampese ekolia bango lokola elamba
basala na bapwale ya meme ;
kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko,
mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. »
 
Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka !
Lata makasi !
Lamuka, lokola na mikolo ya kala,
na bileko oyo eleka kala !
Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi,
oyo obomaki dalagona ?
10 Ezali Yo te oyo okawusaki ebale monene,
mayi oyo ya mozindo makasi ?
Ezali Yo te oyo opasolaki nzela kati na ebale monene
mpo ete basikolami na Yo bakoka kokatisa ?
11 Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga,
bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ;
esengo ya libela na libela ekozala
lokola motole na mito na bango ;
bakotondisama na esengo mpe na kosepela,
bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango.
 
12 « Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino.
Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa,
mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ?
13 Ozali mpe kobosana Yawe, Mokeli na Yo,
oyo atandaki likolo ndenge batandaka liputa
mpe atongaki miboko ya mabele,
mpo ete okoma kobika mikolo nyonso na kobanga
liboso ya kanda ya banyokoli
oyo babongisami mpo na kobebisama ?
Pamba te, wapi kanda ya banyokoli ?
14 Etikali kaka moke, bakangami bakozwa bonsomi,
bakokufa lisusu te kati na boloko na bango
mpe bakozanga lisusu bilei te.
 
15 Nazali Yawe, Nzambe na Yo,
oyo aningisaka ebale monene
mpo ete mbonge na yango etomboka.
Kombo na Ye ezali ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›
16 Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo,
mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai ;
nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango,
oyo atongaki miboko ya mabele
mpe oyo alobaki na Siona :
‹ Bozali bato na Ngai ! › »
Yelusalemi etelemi
17 Lamuka, lamuka !
Telema, Yelusalemi,
yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe,
kopo ya kanda na Ye ;
yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka
kopo oyo epesaka bato kizunguzungu.
18 Kati na bana nyonso oyo abotaki,
Ezali na mwana moko te
oyo azali kolakisa ye nzela ;
kati na bana oyo abokolaki,
moko te azali kosimba ye na loboko.
 
19 Makama mibale oyo ekomeli yo,
nani akoki kolendisa yo :
Mokili na yo ekomi mipiku ya mabanga mpe ebebisami,
nzala makasi mpe mopanga,
nani akobondisa yo ?
20 Bana na yo balembi,
balali-lali na babalabala nyonso
lokola mboloko oyo ekangami na motambo ;
kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yo
nde ebuki-buki bango lolenge wana.
 
21 Yango wana, yo oyo basambwisi,
yo oyo olangwe, kasi na masanga ya vino te,
yoka makambo oyo :
22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo,
oyo abundelaka bato na Ye, alobi :
« Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu,
kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo,
okomela yango lisusu te.
23 Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo,
oyo balobaki na yo :
‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo ! ›
Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela,
lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. »