55
Feti ya ofele
« Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya,
boya na esika oyo mayi ezali ;
ezala bino oyo bozali na mbongo te,
boya kosomba mpe kolia ;
boya kosomba vino mpe miliki :
ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !
Mpo na nini bozali kobebisa mbongo
mpo na bilei oyo etongaka nzoto te,
mpe kobimisa motoki
mpo na bilei oyo etondisaka te ?
Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko,
mpe bokosepela na biloko ya elengi.
Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai,
boyoka mpe bokozala na bomoi ;
nakosala boyokani ya libela elongo na bino,
boyokani oyo nalakaki Davidi,
na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.
Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai
na miso ya bato ya bikolo ebele,
mokambi mpe motambolisi ya bato.
Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te,
mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo
mpo na Yawe, Nzambe na yo,
mpo na Mosantu ya Isalaele,
pamba te alatisi yo nkembo. »
 
Boluka Yawe wana akoki nanu komonana,
bobelela Ye wana azali nanu pene.
Tika ete moto mabe atika banzela na ye,
mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye ;
tika ete azonga epai na Yawe
mpo ete ayokela ye mawa,
tika ete azonga epai ya Nzambe na biso,
pamba te alimbisaka kaka.
 
« Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te,
mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te, »
elobi Yawe.
« Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele,
ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali
likolo koleka banzela na bino,
mpe makanisi na Ngai ezali likolo
koleka makanisi na bino.
 
10 Ndenge mvula mpe mvula ya pembe
enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo
soki epolisi mabele te,
soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te,
soki epesi nkona te na moloni
mpe bilei te na moto oyo aliaka,
11 ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka :
ezongaka pamba te epai na Ngai,
soki esali nanu te mokano na Ngai,
mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.
 
12 Bokobima na esengo,
mpe bakotambolisa bino na kimia ;
bangomba milayi mpe bangomba mikuse
ekoyemba nzembo ya elonga liboso na bino,
mpe banzete nyonso ya zamba ekobeta maboko.
13 Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube,
nzete ya mirite ekobota na esika ya basende ;
ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe,
elembo ya libela na libela,
oyo ekotikala kobebisama te. »