56
Lobiko mpo na bikolo mosusu
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Botambola na alima mpe bosala kolanda bosembo,
pamba te lobiko na Ngai ekomi pene
mpe bosembo na Ngai ekomi pene ya komonisama.
Esengo na moto oyo asalaka bongo,
oyo akangamaka na yango,
oyo abatelaka mokolo ya Saba
mpe abebisaka te bosantu na yango,
mpe oyo abatelaka loboko na ye
ete esala mabe te ! »
 
Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te :
« Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! »
Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te :
« Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! »
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi :
« Mpo na basoda oyo baboma bango mikongo,
oyo babatelaka mokolo na Ngai ya Saba,
oyo baponaka makambo oyo esepelisaka Ngai,
mpe bakangamaka na boyokani na Ngai :
nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango,
ekaniseli oyo ezali na kombo :
ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi.
Nakopesa bango kombo ya libela,
oyo bakoki kolongola te.
Bapaya oyo bakangami na Yawe
mpo na kosalela Ye,
mpo na kolinga Kombo na Ye
mpe kogumbamela Ye,
bato nyonso oyo bakobatela mokolo ya Saba
mpe bakobebisa te bosantu na yango,
mpe bato oyo bakokangama na boyokani na Ngai ;
nakomema bango na ngomba na Ngai ya bule
mpe nakopesa bango esengo
kati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai.
Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bango
ekondimama na etumbelo na Ngai,
pamba te Ndako na Ngai ekobengama
Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso. »
Nkolo Yawe oyo asangisi bawumbu ya Isalaele alobi :
« Nakosangisa lisusu bato mosusu elongo na bango,
esika moko na bato oyo nasilaki kosangisa. »
Pamela ya Nzambe mpo na bato mabe
Bino banyama nyonso ya esobe, boya ;
bino banyama nyonso ya zamba, boya kolia !
10 Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso,
bango nyonso bazangi mayele ;
bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te,
bakokaka koganga te,
mosala na bango kolala mpe kolota bandoto,
balingi pongi makasi.
11 Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te.
Bazali babateli oyo bazangi bososoli,
moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko
mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.
12 Moko na moko alobaka :
« Yaka ! Tika ete nakamata vino
mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga !
Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo,
masanga ya komela ezali nanu ebele ! »