58
Kokila bilei ya solo
« Ganga na mongongo makasi, kotika te !
Matisa mongongo na yo lokola kelelo,
yebisa bato na Ngai botomboki na bango,
mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.
Pamba te mokolo na mokolo,
balukaka Ngai,
basalaka lokola bato bazali na esengo
ya koyeba nzela na Ngai,
lokola ekolo oyo esalaka makambo ya sembo
mpe esundolaka te mibeko ya Nzambe na bango ;
basengaka Ngai mikano ya sembo,
mpe basalaka lokola bato bazali na esengo
ya kozala pene ya Nzambe ;
balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei,
soki ozali komona na Yo yango te ?
Mpo na nini tomikitisa,
soki ozali koyeba na yo yango te ? ›
 
Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei,
bozali kosala makambo oyo bolingi
mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.
Kokila bilei na bino ezali kosuka na koswana mpe na bitumba,
bozali kobetana makofi na kanda nyonso ;
bozali kokila bilei te ndenge esengeli kozala
na mokolo oyo bozali kozela
ete mongongo na bino eyokana na likolo.
Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka,
mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko ?
Boni, ezali kaka kogumba moto
lokola nzete oyo ebotaka na mayi,
kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu ?
Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei,
mokolo oyo Yawe alingaka ?
 
Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka :
kokata minyololo ya masumu,
kofungola basinga ya ekangiseli,
kopesa bonsomi na mowumbu
mpe kobuka ekangiseli nyonso.
Boni, ezali te kokabola bilei na yo
na moto oyo azali na nzala ?
Ezali te koyamba kati na ndako na yo,
mobola oyo azali koyengayenga ?
Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu
mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ?
 
Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo,
mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu ;
bosembo na yo ekotambola liboso na yo
mpe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima.
Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo ;
tango okosenga lisungi,
akoloba : ‹ Ngai oyo. ›
Soki kati na yo, olongoli ekangiseli,
otiki kolakisa bato mosapi
mpe otiki maloba mabe ;
10 soki opesi bilei na yo
epai na ye oyo azali na nzala
mpe okokisi posa ya moto oyo bazali konyokola,
pole na yo ekongenga kati na molili,
mpe molili na yo ekokoma lokola moyi ya ngonga midi.
11 Yawe akotambolisa yo tango nyonso,
akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka
mpe akokembisa mikuwa na yo.
Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi,
lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.
12 Mpo na yo,
bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala,
bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala ;
bakobenga yo : ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana
mpe ya banzela oyo bato balekaka. ›
 
13 Soki obateli matambe na yo
ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba,
mpe ete osala te mosala oyo yo olingi
na mokolo na Ngai ya bule ;
soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo
mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ;
soki opesi yango lokumu
na koboya kolanda nzela na yo moko,
kosala misala na yo moko
mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina,
14 wana okozwa esengo na yo kati na Yawe
mpe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili,
nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo, »
elobi Yawe.