59
Lisumu, koyambola mpe kosikolama
Tala, loboko na Yawe ezali mokuse te
mpo na kobikisa,
litoyi na Ye ekangama te mpo na koyoka !
Kasi ezali bambeba na bino nde ekaboli
bino na Nzambe na bino,
ezali masumu na bino nde esali
ete abombela bino elongi na Ye
mpo ete ayoka bino te.
Pamba te maboko na bino ebebi na makila,
mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe ;
bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta,
mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe.
Moko te azali kofunda makambo na bosolo,
moko te azali kosamba na bosembo ;
bazali kotia mitema na makambo ezanga tina
mpe bazali koloba lokuta ;
na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabe
mpe bakokisaka yango na misala na bango.
Bazali kopasola maki ya etupa*
mpe bazali kotonga ndako ya lifofe.
Moto nyonso oyo akolia maki na yango akokufa ;
mpe, soki apasoli liki moko,
ekobimisa etupa.
Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te,
misala na bango ekobomba bango te ;
misala na bango ezali misala mabe,
mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango.
Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe,
mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa
makila ya moto oyo asali mabe te.
Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ;
kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.
Bayebi nzela ya kimia te,
mpe bosembo ezali na nzela na bango te ;
bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka,
moko te oyo akotambola na nzela yango
akotikala koyeba kimia.
 
Yango wana bosembo ezali mosika na biso,
mpe solo ezali kokomela biso te ;
tozali kozela pole,
kasi nyonso ezali kaka molili ;
toluki moyi,
kasi tozali kaka kotambola na molili.
10 Tozali kosimbasimba mir
mpo na kotambola lokola bakufi miso,
tozali kobanga kotambola
lokola bato bazanga miso ;
tozali kobeta mabaku na moyi makasi
lokola nde tozali na butu makasi,
tozali na nzoto kolongono
kasi tokomi lokola bakufi.
11 Biso nyonso tozali konguna-nguna
lokola bangombolo,
mpe tozali kolelalela tango nyonso lokola ebenga§ ;
tozali koluka bosembo,
kasi tozali komona yango te,
tozali koluka lobiko,
kasi ekimi mosika na biso !
12 Pamba te mabe na biso ekomi mingi na miso na Yo,
mpe masumu na biso ekomi kofunda biso ;
masumu na biso ezali liboso na biso
mpe toyebi malamu bambeba na biso :
13 kotomboka mpe kowangana Yawe,
kopesa Nzambe na biso mokongo,
kosala mabongisi ya konyokola bato
mpe kotombokisa bato,
kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta.
14 Boye, bosembo ezongi sima,
mpe bosolo etelemi mosika ;
pamba te solo ekweyi na balabala,
mpe bosembo elongi kokota te.
15 Solo ezali komonana lisusu na esika moko te ;
bazali konyokola moto oyo azali kokima mabe.
 
Yawe amoni yango mpe asepeli te
ete kosambisa na bosembo ezali te.
16 Amoni ete ezali ata na moto moko te,
akamwe ete ata molobeli moko te azali.
Boye, loboko na Ye moko ememi Ye na lobiko,
mpe bosembo na Ye elendisi Ye.
17 Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo,
mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye ;
alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala,
mpe amizipi zuwa lokola kazaka.
18 Akofuta moto na moto kolanda misala na ye :
kanda makasi epai ya bayini na Ye,
mpe lifuti oyo ekoki epai ya banguna na Ye ;
akopesa na bisanga lifuti na yango.
19 Longwa na ngambo ya weste,
bato bakobanga Kombo ya Yawe ;
mpe longwa na ngambo ya este,
bato bakokumisa nkembo na Ye ;
pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki,
oyo pema ya Yawe ekomema.
 
20 « Mpo na Siona,
mosikoli akoya epai ya bato ya Jakobi,
oyo bakobongwana na masumu na bango, »
elobi Yawe.
21 « Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.
* 59:5 Etupa ezali nyoka oyo babengaka na lifalanse vipère. 59:5 Lifofe ezali nyama moke oyo babengaka na lifalanse araignée. 59:11 Ngombolo ezali nyama oyo babengaka na lifalanse ours. § 59:11 Ebenga ezali ndeke oyo babengaka na lifalanse pigeon.