62
Mpo na likambo ya Siona,
nakokanga monoko na Ngai te ;
mpo na likambo ya Yelusalemi,
nakovanda kimia te,
kino bosembo na ye emonana
lokola kongenga ya pole,
mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda.
 
Bongo bikolo ekomona bosembo na yo,
mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo.
Bakobenga yo na kombo ya sika
oyo monoko na Yawe ekopesa.
Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe
mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo.
Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola,
bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ;
kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, »
mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, »
pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo,
mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.
Lokola elenge mobali abalaka moseka,
bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ;
lokola elenge mobali asepelaka
na mobandami na ye ya mwasi,
Nzambe na yo mpe akosepela na yo.
 
Oh Yelusalemi,
natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ;
bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu.
Bino bato oyo bosalaka ete
Yawe akanisa lisusu Yelusalemi,
bovanda kimia te ;
mpe botikela Ye te tango ya kopema
kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi
mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili !
 
Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali,
loboko na Ye ya nguya,
mpe alapi ndayi :
« Nakopesa lisusu ble na yo te
lokola bilei epai ya banguna na yo ;
bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika
oyo omonelaki pasi ;
kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yango
mpe bakokumisa Yawe,
mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yango
kati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. »
 
10 Boleka, boleka na bikuke !
Bobongisela bato nzela,
bopasola nzela, bopasola nzela ya monene !
Bolongola mabanga,
botombola bendele liboso na bato ya bikolo.
 
11 Tala makambo oyo Yawe atatoli
kino na basuka ya mabele :
« Boloba na Siona, mboka kitoko :
‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya !
Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye,
mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »
12 Bakobenga bango Libota mosantu,
basikolami na Yawe ;
mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka,
engumba oyo basundola te.