63
Mokolo ya kozongisa mabe na mabe mpe ya kosikolama ya Nzambe
Azali nani, ye oyo awuti na Edomi,
na Botsira, na bilamba ya motane ?
Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu,
oyo azali kotambola lokola elombe,
mpo ayebi ete azalaka makasi ?
 
« Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo,
natonda na nguya mpo na kobikisa. »
 
Mpo na nini bilamba na yo ezali motane
lokola bilamba ya mokamoli vino ?
 
« Nazalaki kaka ngai moko kati na ekamolelo
mpo na kokamola vino,
moko te kati na bato ya bikolo nyonso azalaki elongo na ngai.
Nanyataki-nyataki bango na kanda na ngai
mpe nakamolaki bango na kanda na ngai ya makasi ;
makila na bango epumbwelaki ngai na bilamba
mpe ebebisaki bilamba na ngai nyonso.
Pamba te, na motema na ngai,
ezalaki nde mokolo ya kozongisa mabe na mabe,
mpe mobu na ngai ya kosikola ekokaki.
Natalaki, kasi namonaki moto te oyo akosunga ;
nakamwaki ete moto azalaki te
mpo na kosunga ngai !
Bongo, loboko na ngai moko ebikisaki ngai,
mpe kanda na ngai ya makasi esungaki ngai.
Nanyataki-nyataki bikolo na kanda na ngai,
nalangwisaki bango na kanda na ngai ya makasi
mpe nasopaki makila na bango na mabele. »
Masanzoli mpe libondeli
Nakotatola boboto ya Yawe,
nakosanzola Ye mpo na misala na Ye,
kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ;
solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko
kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene.
 
Alobaki : « Solo, bazali bato na Ngai,
bazali bana oyo bakosaka Ngai te ! »
Yango wana, Yawe akomaki Mobikisi na bango.
 
Tango nyonso bazalaki na pasi,
Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ;
boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye
abikisaki bango ;
asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye,
akongolaki bango mpe azalaki komema bango
mikolo nyonso ya tango ya kala.
10 Nzokande, wana batombokelaki Ye
mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa,
abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ;
mpe Ye moko akomaki kobundisa bango.
 
11 Boye, bato na Ye bakanisaki mikolo ya tango ya kala,
mikolo ya tango ya Moyize :
Wapi Ye oyo akatisaki bango ebale monene,
elongo na mobateli bibwele ya etonga na Ye ?
Wapi Ye oyo atiaki kati na bango
Molimo Mosantu na Ye ?
12 Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkembo
ezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize,
Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bango
mpo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela ;
13 Ye oyo atambolisaki bango kati na mozindo ?
Lokola mpunda kati na esobe,
babetaki libaku te ;
14 lokola bibwele oyo ezali kokita na lubwaku,
Molimo na Yawe apesaki bango bopemi.
Ezali ndenge wana nde okambaki bato na Yo
mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yo.
 
15 Tala wuta na likolo mpe mona
wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo :
Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ?
Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?
16 Nzokande, Yo nde ozali Tata na biso ;
atako Abrayami ayebi biso te
to Isalaele andimi biso te ;
kasi Yo, Yawe, ozali Tata na biso,
Kombo na Yo ezali : Mosikoli na biso ya tango nyonso.
 
17 Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayenga
mosika ya nzela na Yo ?
Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasi
mpo ete totosa Yo te ?
Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo,
mabota ya libula na Yo !
18 Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bule
kaka mpo na mwa tango moke ;
kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule !
19 Wuta kala, tozalaka bato na Yo ;
kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te,
lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te.
 
Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita,
bangomba ekoningana liboso na Yo !