64
Ndenge moto etumbaka matiti
mpe etokisaka mayi na nzungu,
kita mpo na kosala ete banguna na Yo
bayeba Kombo na Yo
mpe bikolo eningana liboso na Yo !
Pamba te tango osalaki makambo ya somo
oyo biso tozalaki kozela te,
okitaki mpe bangomba eninganaki liboso na Yo.
 
Wuta na tango ya kala penza,
moto moko te atikala kososola,
litoyi moko te etikala koyoka,
liso moko te etikala komona,
ete nzambe moko, longola kaka Yo,
asalaka boye mpo na bato oyo batalelaka ye.
Osungaka bato oyo bazalaka na esengo
ya kosala makambo ya sembo,
ba-oyo babosanaka nzela na Yo te.
Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu ;
bongo ndenge nini tokoki solo kobika ?
Biso nyonso, tokomi lokola eloko ya mbindo,
misala na biso nyonso ya bosembo ezali
lokola elamba ya mbindo ;
biso nyonso tokawuki lokola likasa
mpe masumu na biso ememi biso lokola mopepe !
Moko te azali kobelela Kombo na Yo
to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo,
pamba te obombeli biso elongi na Yo
mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.
 
Nzokande oh Yawe, ozalaka Tata na biso ;
biso tozali lokola mabele oyo basalelaka bikeko,
bongo Yo, ozali lokola mosali mbeki ;
biso nyonso tozali mosala ya maboko na Yo.
Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ;
kokanisaka masumu na biso tango nyonso te !
Tala biso ndenge tozali kobondela,
pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
 
Bingumba na Yo ya bule ekomi esobe ;
ezala Siona, yango mpe ekomi esobe ;
Yelusalemi etikali lisusu na bato te !
10 Tempelo na biso ya bule mpe ya lokumu
epai wapi batata na biso bazalaki koyemba
masanzoli mpo na lokumu na Yo,
esili kozika na moto ;
mpe nyonso oyo tozalaki na yango ya motuya
esili kobebisama !
11 Oh Yawe, sima na makambo oyo nyonso,
okozongisa kaka motema na Yo sima te ?
Okokanga kaka monoko
mpe okopesa biso kaka etumbu oyo eleki ndelo ?