7
Emanwele
Tango Akazi, mwana mobali ya Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akomaki mokonzi ya Yuda, Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bakendeki kobundisa Yelusalemi, kasi bakokaki kolonga yango te.
Boye, bapesaki sango na ndako ya Davidi : « Bato ya Siri basali boyokani elongo na bato ya Efrayimi. »
Motema ya Akazi mpe mitema ya bato na ye nyonso eninganaki makasi ndenge kaka banzete ya zamba eninganaka na tango ya mopepe. Boye, Yawe alobaki na Ezayi : « Kende, yo elongo na Sheari-Yashubi, mwana na yo ya mobali, kokutana na Akazi na suka ya nzela ya mayi oyo ekenda kino na liziba monene, na nzela ya bilanga ya moto oyo atiaka balangi na bilamba ; loba na ye : ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te ; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela : kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia ! Siri, Efrayimi mpe mwana mobali ya Remalia, basaleli yo likita mpo na kobebisa yo ; bazali koloba : ‘ Tika ete tobundisa Yuda, tokata yango na biteni, tokabola yango biso na biso mpe totia mwana mobali ya Tabeli lokola mokonzi na yango. ’ Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Ekotikala kosalema te,
ekotikala kokokisama te !
Pamba te moto ya Siri ezali Damasi,
mpe moto ya Damasi ezali na yango kaka Retsini.
Etikali kaka mibu tuku motoba na mitano,
Efrayimi ekobebisama
mpe ekozala lisusu na molongo ya mabota te.
Moto ya Efrayimi ezali Samari,
mpe moto ya Samari ezali kaka mwana mobali ya Remalia.
Soki botelemi ngwi te na kondima na bino,
bokolonga te kotelema liboso na bango ! › »
10 Yawe alobaki lisusu na Akazi :
11 — Senga elembo moko epai na Yawe, Nzambe na yo, ezala kati na mokili oyo eleki na bozindo to oyo eleki likolo.
12 Kasi Akazi alobaki :
— Nakosenga te, nakoki komeka Yawe te.
13 Boye Ezayi alobaki :
— Boyoka sik’oyo, bino libota ya Davidi ! Ekoki kaka te mpo na bino kolembisa mitema ya bato ? Boni, bolingi lisusu kolembisa motema ya Nzambe na ngai ? 14 Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. » 15 Mwana yango akomela kaka miliki mpe mafuta ya nzoyi kino tango akoyeba koboya mabe mpe kopona bolamu. 16 Kasi liboso ete mwana yango ayeba koboya mabe mpe kopona bolamu, mikili ya bakonzi mibale oyo ozali kobanga ekobebisama. 17 Yawe akoyeisela yo, bato na yo mpe libota ya tata na yo mikolo oyo etikala nanu kozala te wuta Efrayimi ekabwana na Yuda : ezali nde mokonzi ya Asiri.
18 Na mokolo wana, Yawe akobeta piololo mpo na kobenga nzinzi wuta na miluka ya Ejipito mpe banzoyi oyo ezalaka na mokili ya Asiri ; 19 ekoya mpe ekovanda kati na mabwaku ya mozindo mpe na madusu ya mabanga, na banzete nyonso ya mike-mike mpe na matiti nyonso. 20 Na mokolo wana, Yawe akosalela jileti oyo akodefa na ngambo mosusu ya Efrate, elingi koloba mokonzi ya Asiri, mpo na kokokola suki ya moto na yo, suki ya makolo na yo mpe mandefu na yo. 21 Na mokolo wana, moko na moko akobokola mwana ngombe ya mwasi mpe bameme to bantaba mibale ya basi. 22 Lokola bibwele wana ekopesaka miliki ebele, akolia manteka ; mpe bato nyonso oyo bakotikala na mokili bakolia mafuta ya nzoyi.
23 Na mokolo wana, esika nyonso oyo ezalaki na banzete ya vino nkoto moko oyo ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ekotonda na basende mpe na banzube. 24 Bato bakokota kuna na matolotolo mpe na bambanzi, pamba te mokili ekotonda na basende mpe na banzube. 25 Bato bakoleka lisusu te na bangambo nyonso oyo bazalaki kosala bilanga na kongo, pamba te bakokoma kobanga basende mpe banzube ; ngombe ekokoma kolia kuna, mpe meme ekonyata-nyata mabele na yango.