3
Kosalela malamu lolemo
Bandeko na ngai, bozala ebele te ya koluka kozala balakisi, pamba te boyebi malamu ete, biso balakisi, tokosambisama makasi. Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso. Soki totiaka ebende na monoko ya mpunda, ezali mpo ete etosa biso ; mpe na nzela wana, tokambaka nzoto na yango nyonso. Tala masuwa : atako ezali monene mpe mopepe makasi etindikaka yango, kasi mwa yenda moke nde ekambaka yango mpo ete elanda nzela oyo kapitene ya masuwa alingi komema yango. Ezali mpe ndenge moko mpo na lolemo : ezali eteni moko ya moke kati na nzoto ya moto, kasi ekoki komikumisa na makambo minene penza. Tala, mwa moto moke ezikisaka zamba monene ! Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.
Moto azali na makoki ya kokonza lolenge nyonso ya banyama, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bambisi, mpe akonza yango penza. Kasi mpo na lolemo, moko te akoki kokonza yango : ezali penza mabe, elembaka te mpe etonda na ngenge oyo ebomaka. Kaka na lolemo yango, topambolaka Nkolo, Tata na biso, mpe tolakelaka mabe bato oyo Nzambe akela na elilingi na Ye. 10 Ezala lipamboli to elakeli mabe, nyonso ebimaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, esengelaki te kozala bongo. 11 Boni, etima moko ekoki kobimisa mayi ya peto mpe mayi ya mbindo ? 12 Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki solo kobota bambuma ya olive ? Nzete ya vino ekoki solo kobota bambuma ya figi ? Boni, ekoki kosalema ete etima ya mayi ya mungwa ebimisa mayi ya malamu ?
Bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe
13 Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele ? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya. 14 Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo mpe na molimo ya koswana, wana botika komikumisa ete bozali bato ya bwanya ; pamba te yango ezali solo te, ezali lokuta. 15 Bwanya ya ndenge wana ewutaka na Likolo te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto, ya Satana. 16 Pamba te esika oyo zuwa mpe koswana ezali, esika wana mpe mobulu ya lolenge nyonso mpe misala mabe ezalaka. 17 Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.
18 Bato oyo bayeisaka kimia balonaka kati kimia mpe babukaka mbuma ya bosembo.