4
Kosala keba na baposa mabe
Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi ? Boni, ewutaka te na baposa mabe na bino, oyo ebundaka kati na banzoto na bino ? Bozali kolula biloko, kasi bozali kozwa yango te ; bokomi kino koboma bato. Botondi na zuwa, kasi bozali kolonga te kozwa oyo bozali koluka ; bokomi koswana mpe kobunda bitumba. Bozwaka te biloko oyo bozalaka na yango posa, pamba te bosengaka yango epai ya Nzambe te. Kasi soki bosengaka epai ya Nzambe mpe bozwaka te, ezali mpo ete bosengaka na makanisi mabe, na makanisi ya kosepelisa kaka baposa na bino moko.
Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe. Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? » Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »
Bomikitisa liboso ya Nzambe. Botelemela Satana, mpe akokima mosika na bino. Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino ! Botala pasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa ! 10 Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.
11 Bandeko na ngai, botonganaka te bino na bino. Moto oyo atongaka mpe asambisaka ndeko na ye asambwisaka mibeko mpe abukaka yango. Nzokande, soki ozali kosambwisa mibeko, elakisi ete ozali kotosa yango te, kasi ozali nde mosambisi na yango. 12 Pamba te Ye oyo apesa mibeko azali kaka Ye moko Mosambisi, Ye nde azali na makoki ya kobikisa mpe ya kobebisa. Bongo yo, ozali nani mpo ete osambisa moninga na yo ?
Mateya mpo na bazwi
13 Boyoka sik’oyo, bino bato oyo bolobaka : « Lelo to lobi, tokokende na engumba songolo, tokovanda kuna mobu mobimba mpe tokosala mombongo oyo ekobotela biso mbongo ebele. » 14 Boni, boyebi makambo oyo ekoya lobi ? Bomoi na bino nde nini ? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe ? 15 Tala ndenge bosengeli koloba : « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. » 16 Kasi bino, bozali nde komikumisa na monene ya mabongisi na bino ! Boyeba malamu ete lolendo ya ndenge wana ezali mabe. 17 Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.