15
Yesu mpe bokoko ya Bayuda
(Mlk 7.1-23)
Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye :
— Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Pamba te basukolaka maboko na bango te liboso ya kolia.
Yesu azongiselaki bango :
— Bongo bino, mpo na nini botosaka te mibeko ya Nzambe, kasi botosaka kaka bokoko na bino ? Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. » Kasi bino, bolobaka : « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye : ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe, › abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu. » Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino ! Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :
« Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,
kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;
basambelaka Ngai kaka na pamba,
mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
(Mlk 7.14-23)
10 Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango :
— Boyoka mpe bososola makambo oyo : 11  eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.
12 Bongo bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye :
— Boni, oyebi te ete maloba oyo olobi ebetisi Bafarizeo mabaku ?
13 Yesu azongisaki :
— Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama. 14  Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.
15 Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu :
— Limbolela biso lisese oyo.
16 Yesu atunaki bango :
— Bino mpe, boni, bozwi nanu bososoli te ? 17  Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo ? 18  Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo. 19  Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga. 20  Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo ; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.
Mwasi mopaya andimeli Yesu
(Mlk 7.24-30)
21 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni. 22 Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga :
— Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
23 Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye :
— Bengana ye ; azali kotiela biso makelele !
24 Yesu azongisaki :
— Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !
25 Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki :
— Nkolo, sunga ngai !
26 Yesu azongisaki :
— Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
27 Mwasi yango alobaki :
— Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !
28 Bongo Yesu alobaki na ye :
— Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo !
Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
Yesu abikisi babeli ebele
(Mlk 7.31-37)
29 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na ebale ya Galile ; amataki likolo ya ngomba mpe avandaki kuna. 30 Bato ebele bayaki epai na Ye ; bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bakufi miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko mpe bato mosusu ebele. Batiaki bango na makolo ya Yesu, mpe Yesu abikisaki bango. 31 Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele.
Yesu aleisi bato nkoto minei
(Mlk 8.1-10; Mat 14.13-21)
32 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki :
— Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.
33 Bayekoli na Ye bazongisaki :
— Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?
34 Yesu atunaki bango :
— Bozali na mapa boni ?
Bayekoli bazongisaki :
— Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike.
35 Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. 36 Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato. 37 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo. 38 Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana. 39 Sima na Yesu kozongisa bato, amataki kati na bwato mpe akendeki na etuka ya Magadani.